Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/12 nk. 4-7
  • Tóluka naino liboso tósakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóluka naino liboso tósakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • ‘Yehova angengisi elongi na ye epai na bango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Luká na likebi mpenza bato oyo balobaka te mpe bayokaka te oyo bafandaka na teritware na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tólingaka bandeko na biso bababa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Lokota oyo ozali koyoka na miso!
    Lamuká!—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 7/12 nk. 4-7

Tóluka naino liboso tósakola

1. Mpo na nini na bisika oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, teritware ekabolamaka na kolanda monɔkɔ?

1 Na Pantekote ya mobu 33, nsima ya kozwa elimo santu, bayekoli ya Yesu “babandaki koloba na minɔkɔ mosusu” epai ya bato oyo bazalaki wana, oyo bautaki na bamboka ya mosika. (Mis. 2:4) Yango esalaki ete bato soki 3 000 bázwa batisimo. Emonani ete mingi na bapaya yango bazalaki mpe koloba monɔkɔ oyo bango nyonso bayebaki, lokola Ebre to Grɛki. Kasi Yehova amonaki malamu ete básakwela bango nsango ya Bokonzi na minɔkɔ ya mboka na bango. Na ntembe te, ntina moko ezali ete mbala mingi, soki moto ayoki nsango malamu na monɔkɔ ya mboka na bango asepelaka na yango mbala moko. Yango wana, lelo oyo na bingumba oyo bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge bafandi, bateritware ekabolamaka na kolanda monɔkɔ. (Tobongisami, lok. 107, par. 1-2) Bituluku ya minɔkɔ ya bapaya ezwaka teritware na yango moko te, kasi basakwelaka bato oyo balobaka monɔkɔ na bango na teritware ya lisangá oyo yango ezali mpe masangá mosusu ya penepene.

2. (a) Mosala ya koluka ezali nini, mpe ebongi mpenza na bisika nini? (b) Na bisika oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, ndenge nini masangá ekoki kosalisana? (c) Tosengeli kosala nini soki tokutani na moto oyo asepeli kasi alobaka monɔkɔ ya lisangá mosusu?

2 Soki tozali na esika oyo bato nyonso balobaka monɔkɔ moko, tokoki kosakola ndako moko nsima ya mosusu. Nzokande, ekozala bongo te na bingumba oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge. Ekoki kozala ete masangá ya minɔkɔ mosusu mpe bazali kosakola kaka na esika yango. Atako bandeko ya masangá mosusu bakoki koyebisa biso soki bakutani na bato oyo balobaka monɔkɔ ya lisangá na biso, kasi mokumba ya kolula bato oyo tokoki kosakwela bango ezali libosoliboso ya lisangá to etuluku na biso. (Talá etanda “Tósalisanaka.”) Yango wana, ekosɛnga na biso tókende naino koluka mpo na koyeba bisika oyo tokoki kokuta bato oyo balobaka monɔkɔ boye to boye. Ndenge nini mosala ya koluka bato ekoki kosalema?

3. Masangá to bituluku basengeli kotalela nini mpo na kopona esika ya koluka, mpe mosala yango esengeli kozwa ntango boni?

3 Ndenge ya kobongisa mosala ya koluka: Ntango oyo tokolekisa na mosala yango etaleli ndenge makambo ezali na esika bozali. Na ndakisa na esika wana, bato boni balobaka monɔkɔ yango? Basakoli bazali boni? Lisangá to etuluku esili kozwa baadrɛsi ya bato boni? Esengeli te ete lisangá ekende koluka bisika nyonso ya zingazinga, kasi ekoki kopona kotya likebi mingi na bisika ya pembenipembeni oyo bato ya monɔkɔ yango bazali mingi, mpe na bisika oyo ezali mosika mingi te. Nzokande, kozala na ebongiseli ya malamu ya kokende koluka bato oyo balobaka monɔkɔ moko boye ezali na ntina mpo ekopesa bato mingi libaku ya kobelela nkombo ya Yehova.​—Rom. 10:13, 14.

4. (a) Ndenge nini mosala ya koluka esengeli kobongisama? (b) Wapi mwa makambo tokoki kosala mpo na kozwa bato oyo balobaka monɔkɔ ya lisangá na biso?

4 Mpo na kozongela koluka esika moko mbala na mbala te, lisangani ya bankulutu, mingimingi mokɛngɛli ya mosala ya kosakola, basengeli kobongisa mpe kokamba mosala ya koluka. (1 Ko. 9:26) Lisangani ya bankulutu ya lisangá oyo etuluku ya monɔkɔ ya bapaya ezali, ekopona ndeko mobali moko oyo abongi, mingimingi nkulutu to mosaleli ya misala, mpo na kotambwisa mosala yango. Masangá mpe bituluku mingi ezwaka bibongiseli ya malamu mpo na kokende koluka bato, mbala mosusu basalelaka Internet mpo na komona bankombo ya bato ya monɔkɔ yango. Na nsima, mosala ya koluka esalemaka na nzela ya telefone, to kokende kotala bato yango mpo na koyeba soki esengeli kobakisa bango na molɔngɔ ya baadrɛsi ya bato ya teritware. Soki likoki ezali, lisangani ya bankulutu ya lisangá oyo etuluku yango ezali, bakoki kobongisa mpo lisangá mobimba esalaka mosala yango na bantango mosusu.​—Talá etanda “Ndenge ya kozwa bato oyo balobaka monɔkɔ ya lisangá na bino.”

5. (a) Wapi mwa makanisi oyo ekosalisa basakoli oyo bazali koluka bato? (b) Tokoki koyebisa bato nini ntango tokei mosala yango?

5 Mokomoko na biso asengeli kozala na mokano ya sikisiki mbala nyonso oyo akei koluka bato. Lokola mosala yango ezali lolenge moko ya mosala ya kosakola, mbala mingi tosengeli kolata na ndenge ebongi na basakoli. Basakoli mingi bamonaka ete komeka ndenge ya kobanda lisolo mpe kosolola na monɔkɔ yango ntango bakei koluka bato esalisaka bango bábatela esengo mpe bámesana na monɔkɔ yango. Tokoki kotánga na lapolo na biso ngonga oyo tolekisi na mosala ya koluka, kasi oyo tolekisi mpo na kotánga to kobongisa karte ya teritware te. Ntango tomoni moto oyo alobaka monɔkɔ yango, tosengeli kosala makasi tópesa ye litatoli mpe na nsima koyebisa mbala moko mokɛngɛli ya mosala ya kosakola to ndeko mosusu oyo ye aponi, mpo bátya yango na dosye ya teritware. Esengeli kosala bongo ata soki moto yango asepeli to te. Atako mosala ya koluka ezali na ntina, tosengeli kozala na bokatikati mpe kosala mitindo mosusu ya mosala ya kosakola.​—Talá etanda “Oyo tokoki koloba na mosala ya koluka.”

6. Koluka bababa ezali na mikakatano nini?

6 Koluka bababa: Mosala ya koluka bababa ezali mpe na mikakatano na yango; esɛngaka milende mpe koyika mpiko. Bayebaka baba te na ndenge nkombo na ye ekomami, na elongi na ye mpe te, to na molato na ye mpe te. Lisusu, bandeko na ye to baninga na ye bakoki koboya koyebisa basakoli makambo mosusu mpo na kobatela ye. Makanisi oyo elandi, oyo etali mosala ya koluka bababa, ekoki mpe kosalisa mpo na koluka ata bato oyo balobaka.

7. (a) Ndenge nini tokoki koluka bababa na bakartye oyo bato mingi bafandaka? (b) Ndenge nini tokoki kosala mpo moto oyo tozali kotuna abanga te?

7 Masangá mpe bituluku oyo esalelaka elobeli ya bikela to bajɛstɛ bamonaki bababa ebele ntango batunaki na bakartye oyo bato mingi bafandaka. Ntango mosusu, tokoki kokutana na moto oyo ayebi moto mosusu na kartye na bango, to batángaka na ye, to mpe basalaka esika moko oyo asalelaka elobeli ya bababa. Mbala mosusu, moto yango amonaki elembo moko ya nzela oyo emonisaka ete baba to moto oyo ayokaka te afandaka wana. Ekoki mpe kozala ete ndeko na ye moko azali baba. Tóbosana te ete bato bakoki kokanisela biso mabe ntango tozali koluka bato ya ndenge wana. Kasi, soki tozali kolimbwela bango na ndenge ebongi, tozali komimonisa lokola moninga, mpe koloba na limemya, ekosala ete bábanga te. Basakoli mosusu bazwaki matomba mpo balakisaki Biblia to ba DVD oyo ezali na masolo ya Biblia ntango bazalaki kotuna bato mpo bálakisa bango esika bababa bazali. Na nsima, balobaki na mokuse ete balingi koyebisa bababa elikya oyo Biblia epesi. Soki moto azali kokakatana mpo na koyebisa yo, akoki kondima kozwa karte oyo ezali na adrɛsi na yo to lokasa ya libyangi mpo na makita mpo apesa yango na moninga to ndeko na ye oyo azali baba.

8. Ndenge nini lisangá moko ya penepene ekoki kopesa lisangá ya Elobeli ya bikela mabɔkɔ?

8 Na bingumba ya minene, mbala moko to mibale na mbula, lisangá ya Elobeli ya bikela to bajɛstɛ ekoki kosɛnga lisangá ya monɔkɔ mosusu oyo ezali penepene na bango mpo bápesa bango mabɔkɔ na mosala ya koluka mpo teritware na bango ezali monene. Ndeko moko ya lisangá ya bababa nde akotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola mpo na komonisa ndenge mosala esengeli kosalema mpe bakosala elakiseli. Etuluku mokomoko ya basakoli oyo bakei motuka moko (epai esalemaka), esengeli kozala ata na mosakoli moko ya lisangá ya bababa mpe karte ya teritware oyo ekolakisa bango esika basengeli koluka.

9. Ndenge nini mosala ya koluka esengeli kosalema na bisika oyo bababa bakutanaka mpo na kosepela mpe kozwa lisungi?

9 Tokoki mpe koluka na bisika oyo eyebani ete bababa bakutanaka kuna mpo na kosepela mpe mpo na kozwa lisungi oyo Leta apesaka. Basakoli basengeli kolata na ndenge oyo ebongi na esika ya ndenge wana. Ekozala malamu koleka kosolola na moko to mibale na ndenge ya kimya, na esika ya kosolola na bango nyonso mbala moko. Soki lisolo eleki malamu, mbala mosusu bokoki koyokana mpo na kokutana lisusu.

10. Ndenge nini basakoli bakoki koluka bato na bisika ya mombongo?

10 Lolenge mosusu ya kosala ezali ya kobongisa bakarte oyo ekomonisa bisika ya mombongo mpe na nsima, kokende kuna na ntango ebongi. Karte moko esengeli komonisa bisika oyo batɛkisaka esansi. Mosusu ekomonisa esika basukolaka bilamba, bisika ya restora, baotɛlɛ, to bisika mosusu ya mombongo. Soki karte mokomoko ezali komonisa lolenge moko ya mombongo, yango ekosalisa basakoli bámesana na lolenge moko ya kobanda lisolo na teritware yango mpe makoki na bango ya koteya ekobakisama. Na ndakisa, lokola mbala mingi bababa mosusu bayaka mpe kofanda na baotɛlɛ, tokoki kolimbola na mokuse mosala na biso epai ya basali, mpe kopesa bango ba DVD ya masolo ya Biblia mpe lokasa ya libyangi mpo na makita ya lisangá mpo bápesa yango na bakiliya na bango oyo bazali bababa. Na bisika mosusu ya mombongo, tokoki kaka kotuna soki mosali moko to patrɔ ayebi Elobeli ya bikela. Soki na teritware ezali na eteyelo moko ya bababa, tokoki kopesa mwa ba DVD na biso mpe mikanda mosusu mpo bátya yango na bibliotɛkɛ ya eteyelo.

11. Mpo na nini mosala ya koluka bato ezali lolenge moko ya ntina na mosala na biso ya kosakola?

11 Mosala moko ya ntina: Koluka bato oyo balobaka monɔkɔ ya lisangá na bino ezali mosala moko makasi. Lisusu, lokola bato balongwaka mpe basusu bakɔtaka, yango ekoki kopesa mpasi mpo dosye ya teritware ezala na molɔngɔ. Atako bongo, na bisika mingi mosala ya koluka ezali lolenge moko ya ntina na mosala na biso ya kosakola. Yehova, ye oyo apesi biso mokumba ya kosakola, aponaka bilongi te. (Mis. 10:34) “Mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bazwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Na yango, tiká ete tósala elongo na Yehova mpe na bandeko na biso mpo na koluka bato ya minɔkɔ nyonso oyo bazali na “motema ya kitoko mpe ya malamu.”​—Luka 8:15.

[Etanda na lokasa 5]

Tósalisanaka

Soki lisangá to etuluku moko elingi ete masangá mosusu esalisa bango mpo na komona bato ya monɔkɔ ya lisangá na bango, mokɛngɛli ya mosala ya kosakola akosolola na bankulutu ya masangá ya penepene wana. Ekozala malamu kosolola kaka na masangá oyo ezali mosika mingi te, to oyo ezali na bato mingi oyo balobaka monɔkɔ yango. Na nsima, masangá yango ekoyebisa na basakoli ete soki bakutani na moto oyo alobaka monɔkɔ yango, basengeli kozwa adrɛsi na ye mpe kopesa yango na mokɛngɛli ya mosala ya kosakola, mpo apesa yango na lisangá to etuluku oyo esɛngaki lisalisi. Bakɛngɛli ya mosala ya kosakola ya masangá ya teritware moko basengeli kosala na bomoko mpo na kotinda moto nyonso oyo asepeli na nsango malamu na lisangá to etuluku ya monɔkɔ na ye.

Soki mosakoli akutani na moto oyo asepeli mpenza kasi azali koloba monɔkɔ ya lisangá mosusu (to azali baba), asengeli mbala moko kotondisa formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43) mpe kopesa yango na sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá na bango. Yango ekosala ete moto yango azwa lisalisi ya elimo nokinoki.​—Talá km 5/11 lok. 7.

[Etanda na lokasa 6]

Ndenge ya kozwa bato oyo balobaka monɔkɔ ya lisangá na bino

• Kotuna bato mosusu: bayekoli ya Biblia, bandeko na bango ya libota, baninga ya mosala mpe bongo na bongo.

• Kosalela liste oyo bakomaka banimero ya telefone mpe bankombo ya bato mpo na komona bankombo oyo eyokani na monɔkɔ oyo ozali koluka. Okoki kozwa liste yango na Internet to na kompanyi moko ya batelefone.

• Kotuna na ndenge ya mayele na bisika ya bato mingi, na ndakisa na babibliotɛkɛ, babiro ya Leta mpe biteyelo.

• Kotánga bazulunalo mpo na koyeba mayebisi oyo etali misala to makambo etali bato oyo balobaka monɔkɔ moko boye.

• Kokende na bamagazini mpe bisika ya mombongo epai bato ya monɔkɔ moko boye bazalaka mingi.

• Nsima ya kosɛnga ndingisa, tokoki kotya mikanda na biso na mesa na bisika ya mombongo, na bainiversite, to na bisika oyo bazwaka bisi to engbunduka, epai bato oyo balobaka monɔkɔ moko boye bayaka mingi.

• Soki mibeko ya ekólo na bino epesi nzela, kosomba na kompanyi moko ya mombongo, buku to programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo ekosalisa bino bóyeba na nzela ya Internet bisika bato ya monɔkɔ moko boye bafandi.

[Etanda na lokasa 7]

Oyo tokoki koloba na mosala ya koluka

Soki tozali koloba mbala moko mpe na ndenge ya boninga, ekosala ete bákanisela biso mabe te. Mbala mingi, kobanda naino na kolakisa mikanda ya monɔkɔ yango esalisaka mingi.

Nsima ya kopesa mbote, tokoki koloba boye: “Tozali koluka bato oyo balobaka ․․․․․ mpo tóyebisa bango elikya oyo ezali na Biblia. Okoki koyeba moko na bango mpo tósolola na ye?”

Ntango tozali koluka bababa, tokoki koloba boye: “Mbote. Nakoki kolakisa yo eloko moko? [Na nzela ya aparɛyi video ya mabɔkɔ, lakisá ye vɛrsɛ moko na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika​—Na DVD.] Oyo ezali eteni moko ya Biblia na Elobeli ya bikela ya Amerika. Longola Biblia, tozali mpe na bavideo mosusu mingi oyo moto akoki kozwa ofele, mpo na kosalisa bababa mpo báyeba Nzambe. Oyebi moto moko oyo azali baba to oyo ayokaka malamu te, oyo asalelaka Elobeli ya bikela to bajɛstɛ?” Soki moto yango ayebi te, okoki kopesa ye ndakisa ya esika moko oyo mbala mosusu asilá komona moto ya ndenge wana, lokola na mosala, na kelasi to na kartye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto