Nsango ya Teokrasi
Congo-Kinshasa: Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ, basakoli nyonso bazalaki 104 815, yango emonisi bokóli ya 17 %, soki tokokanisi na mwayene ya basakoli ya mbula oyo eleki. Na kampanye ya kokabolama ya mikanda oyo eumeli mingi na libombo, mwasi ya mokɛngɛli moko ya etúká akabolaki babúku koleka 1 000 na boumeli ya sanza ya Sɛtɛ́mbɛ.
Liberia: Biro ya filiale ya Monrovia efungolamaki lisusu na mokolo mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ, nsima ya kokangama mbula moko na sanza misato na ntina na etumba ya banamboka. Basakoli nyonso bazalaki 1 977 na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ.
Mozambique: Basakoli nyonso bazalaki 28 005 na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ. Na sanza ya Máí 1975, basakoli nyonso bazalaki 25 790. Yango emonisi mosala monene oyo mosalemi na boumeli ya lisolo ya Teokrasi na ekólo Mozambique.
Népal: Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ, basakoli bazalaki 306, yango ezali motángo ya sika ya basakoli. Bato pene na 500 bazali koyekola Biblia lelo oyo.
Sainte-Hélène: Batrakte Nsango ya Bokonzi No. 35 ekabolamaki na libota mokomoko ya esanga yango.
Bikólo mingi bisili kobanda mbula ya mosala na motángo ya sika ya basakoli nyonso, yango ezali komonisa bokóli ya 5 % soki tokokanisi na mwayene ya basakoli ya mbula oyo eleki: ekólo Hong-Kong ekómi na basakoli 4 230; esanga ya Madagascar ekómi na basakoli 8 749 (kati na bango babongisi-nzela ya sanza na sanza bazali 912); mpe ekólo Taïwan ekómi na basakoli 3 497.