“Yehova azali Mosungi na ngai”
1 Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye ya ekeke ya liboso mokumba ya kosakola, alobaki na bango ete: “Nazali kotinda bino lokola bampate kati na nkoi.” (Mat. 10:16) Babangaki mokumba yango to baboyaki kosakola? Te. Basalaki na lolenge oyo ntoma Paulo alobaki na nsima epai na bazalani na ye baklisto ete: “Boye biso toyebi kozala na molende awa elobi biso ete, Nkolo [Yehova] azali mosungi na ngai, nakobanga te. Moto akosala ngai nini?” (Ebe. 13:6) Bazalaki na esengo mpamba te batyolamaki mpo na nkombo ya Yesu, mpe bakóbaki koteya mpe kosakola nsango malamu kozanga kotika.—Mis. 5:41, 42.
2 Lelo oyo, mosala ya kosakola oyo ezali kosalema kati na mokili mobimba ekómi na eleko na yango ya nsuka. Bobele lokola Yesu alobaki yango, mabota nyonso mazali koyina biso. (Mat. 24:9) Mosala ya kosakola ezali kokutana na botɛmɛli, ezali kotyolama mpe ata kopekisama na bisika mosusu na mabelé. Soki tozangaki kondima, tokokaki kozonga nsima mpo na kobanga. Nzokande, lokola toyebi ete Yehova azali mosungi na biso mpe ete azali kopesa biso nguya, tolendisami na ekateli na biso ya kolendendela.
3 Kozala na mpiko elimboli kozala makasi, kozala na ekateli mpenza, kozala elombe. Yango ekeseni na kobanga, na ezaleli ya kozala nsoninsoni to ya kobangabanga. Bayekoli ya Yesu basengeli ntango nyonso kozala na nguya mpo na koyika mpiko. Ebongi ete tózalaka na mpiko, noki bizaleli mpe misala ya mokili oyo eyini Nzambe enyata biso. Oyo nde elendiseli mpo na biso soki tokanisi ndakisa ya motuya ya Yesu, moto oyo alóngaki mokili! (Yoa. 16:33) Tókanisa mpe ndakisa ya bantoma, bato oyo atako bakutanaki na komekama ya makasi mpenza, balobaki na mpiko nyonso ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Mis. 5:29.
4 Tozali te kati na baoyo bakozongaka nsima: Tosengeli kosala makasi mpo ete tózala ntango nyonso na makanisi mabongi mpo na mosala na biso. (Ebe. 10:39) Tóbosana te ete, na ntina na bolingo mpe motema mawa na ye, Yehova azali kotinda biso epai na bato nyonso ya mokili. Azali kosɛnga na basaleli na ye te ete básala likambo moko oyo lizangi kokokisa mokano moko ya ntina. Nsukansuka, oyo nyonso tozali kosala, ekozala mpo na bolamu ya baoyo bazali kolinga Nzambe.—Lom. 8:28.
5 Kozala na elikya ete makambo makolonga ekosalisa biso mpo tókóba koluka bato oyo bakokani na bampate kati na teritware na biso. Soki bato bazali kotala mosala na biso mpamba (indifférence), yango ekoki komonisa ete bazali lisusu na elikya te to bazangi mpenza yango. Tiká ete bolingo ekómisa biso bato ya bososoli mpe ya motema molai! Mbala nyonso oyo tozali kotika mokanda to tozali komona mwa bosepeli, tosengeli kozala na mokano ya kosala bozongeli ya sika kozanga koumela mpo na kolamwisa bosepeli yango. Tosengeli te komimona lokola ete tozali na makoki te mpo na kobanda to mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Nzokande, esengeli na biso ntango nyonso kobondela mpo na kosɛnga lisungi mpe litambwisi ya Yehova, komindimisáká ete akosalisa biso.
6 Tondimisami ete Yehova akokómisa mosala na ye kino nsuka. (Talá Bafilipi 1:6.) Yehova azali mosungi na biso, mpe elikya ya solosolo oyo tozali na yango epai na ye ezali kolendisa biso mpo ete ‘tótika te kosala makambo maleki ntina.’—Gal. 6:9.