Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yulí

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yulí
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Yulí
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Yulí
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Yulí
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Yulí
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 7/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yulí

LIYEBISI: Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na manaka ya likita ya mosala mpo na pɔsɔ na pɔsɔ na boumeli ya mayangani. Masangá bakosala mbongwana oyo esengeli na kotaleláká ete bakoyangana na liyangani “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” mpe na likita ya mosala na pɔsɔ oyo ekolanda, bakosala bozongeli ya miniti 30 ya makambo ya ntina oyo malobelamaki na liyangani. Bozongeli ya makambo oyo malobelamaki mokolo na mokolo na boumeli ya liyangani, ekopesama epai na bandeko mibale to misato ya makoki liboso mpenza, oyo bakolobela makanisi ya ntina oyo malobelamaki na liyangani. Bozongeli yango oyo ebongisami malamu, ekosalisa basangani ya lisangá ete bámikundola makanisi ya ntina, na boye ete básalela yango na bomoi na bango mpe na mosala ya kosakola. Bakomantere ya bayangani mpe makambo oyo malobelami ekozala mikuse mpe sikisiki.

Pɔsɔ ebandi na 6 Yulí

Loyembo 223

Min. 8: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala ya Bokonzi. Nsango ya Teokrasi.

Min. 15: “ ‘Tokoki mpenza mpo na mosala nyonso malamu.’ ” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá na mokuse makanisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1989, nk. 22-24.

Min. 22: “Tósakola epai na ‘bato ya mitindo nyonso.’ ” Nkulutu moko azali komonisa ete atako na Yulí tozali kolakisa babuku mosusu ya nkasa 192, soki ebongi tokoki mpe kolakisa babuku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo to mpe L’humanité à la recherche de Dieu. Nkulutu moko elongo na basakoli mosusu ya makoki bazali kolobela makanisi oyo mapesami mpo na kolakisa babuku yango. Lobelá na mokuse mangomba oyo mazali kati na teritware na bino mpe limbolá mpo na nini tosengeli kobongisa likanisi moko mpo na kobanda lisolo na moto oyo tokokutana na ye. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mokuse.

Loyembo 112 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 13 Yulí

Loyembo 209

Min. 10: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: “Bazali kobatela biloko ya Nkolo.” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, oyo akozongela makambo malobelami na siplemá.

Min. 20: “Biso banso tozali na ntina mpo na kokokisa mosala ya Nzambe.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Limbolá mpo na nini bankulutu bazali na mposa ya basali ya bolingo malamu mingi mpo na kosala misala ya ntina. Lobelá bamposa ya lisangá, kati na yango, kopɛtola mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi, kopesa lisungi epai na bato ya maladi mpe epai na mibange mpe mosala ya kosakola na teritware mobimba. Sɛngá na bankulutu báloba lolenge basepelaka na lisungi oyo bandeko mingi bapesaka na motema na bango mobimba. Monisá ete milende ya mokomoko ezali na ntina mingi.

Loyembo 153 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Yulí

Loyembo 7

Min. 10: Mayebisi.

Min. 20: Bundá na mpiko nyonso. Lisukulu liuti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1986, nk. 10-14 (ebimeli ya Lifalanse). Lobelá ntina ya mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe lendisá basakoli ete bábanda mosala yango uta mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ.

Min. 15: “Tópesa litatoli na kozaláká na etamboli malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Salá mituna-lisolo elongo na bilenge mosusu ya ndakisa malamu. Bazali kolobela lolenge bato mosusu bakamwaki mpenza na etamboli na bango ya boklisto. Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo esalemaki, oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1995, nk. 24-25.

Loyembo 170 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Yulí

Loyembo 61

Min. 10: Mayebisi. Kundwelá mokomoko ete apesa lapolo na ye ya mosala ya kosakola ya Yulí.

Min. 15: Lolenge ya kotika bazulunalo mbala na mbala epai na bato. Lobelá mingi makambo oyo masengeli: koyeba bazulunalo nyonso oyo ekabolami, kozongela bato yango pɔsɔ mibale na nsima, komonisa makanisi ya sika ya banimero oyo eutaki kobima mpo na kokolisa bosepeli. Lobelá bato oyo tokoki kotya na molɔngɔ ya baoyo tozali kotikela bazulunalo mbala na mbala, na ndakisa, bato oyo tofandi na bango penepene, baninga ya mosala, bato ya mombongo, basali na pɔmpi ya esansi, mpe bongo na bongo. Monisá abonema ya sanza motoba epai na bato oyo bazali kosepela ntango nyonso kozwa bazulunalo yango. Sɛngá na mosakoli moko to basakoli mibale bálobela likambo moko ya kolendisa oyo esalemaki wana bazali kotikela bato bazulunalo mbala na mbala.

Min. 20: Babongisi-nzela bazali kosalisa basusu. Lisukulu oyo likosalema na mokɛngɛli na mosala, na boumeli na yango akolobela ebongiseli oyo ezwami mpo ete babongisi-nzela básalisa basakoli mosusu. Limbolá ete bibongiseli ya kopesa lisalisi bisilaki kosalema liboso (jv 100). Bato koleka milio moko oyo bazwaki batisimo na boumeli ya mbula misato oyo eleki bazali na mposa ya kobongisama. Ebongiseli oyo ezali koloba ete “Babongisi-nzela bazali kosalisa basusu” ezali komonisa ete babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene oyo bakɔtaki na Eteyelo mpo na babongisi-nzela bamesani na mosala mpe babongisami. Mokano ezali ete mobongisi-nzela mokomoko asalisa basakoli mibale na mbula moko ete bákóma na makoki na mosala ya kosakola mpe bálinga kosala yango lisusu mingi. Baoyo bakozwa lisalisi yango basengeli komitungisa te; mokano ezali ya kolendisa na bolingo mpe na boboto. Ebongiseli yango ya sika esengeli kopesa nzela na bankóto ya basakoli ete bákóma baministre babongi mpenza.

Loyembo 207 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto