Biso banso tozali na ntina mpo na kokokisa mosala ya Nzambe
1 Moyekoli mokomoko ya Yesu Klisto asengeli kososola ete milende oyo azali kosala mpo na kosimba mosala ya kosakola Bokonzi mpe kosangana na yango ezali na ntina mingi. Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bakobota mbuma ndenge moko te. (Mat. 13:23) Atako eteni monene ya mosala ya kosakola ezali kosalema na babongisi-nzela ya mpiko, baoyo nyonso bazali kokoba na molende kokumisa Nzambe na kobotáká mbuma oyo ekoki na makasi na bango babongi na kopesamela longonya.—Yoa. 15:8.
2 Milende ya bato banso esalaka mingi: Yesu asakolaki ete milende oyo bayekoli na ye bakosala na bomoko ekosala misala minene koleka oyo ye asalaki. (Yoa. 14:12) Ezala ete ezalela na biso moko ezali kopesa biso nzela ya kosala bobele oyo tokoki kosala to ezali kopesa biso nzela ya kosala ntango mingi na mosala ya kosakola, mokomoko na biso azali na ntina mpo na kokokisa mosala yango. Ezali mpenza yango nde Paulo alobaki: “Nzoto mobimba ezali kokola, awa ezali yango kokangama mpe kotongama na bilembo nyonso bizwi yango, bizali mpe kosalaka lokola ebongi na yango.”—Ef. 4:16.
3 Basusu bakoki kokanisa ete milende na bango mizali na ntina mpenza te. Nzokande, oyo Yehova azali kondima, ezali ete tókokisa mosala na biso na molimo na biso mobimba. Nyonso oyo tozali kosala mpo na ye ezali na motuya, mpe asepelaka na yango.—Talá Luka 21:1-4.
4 Tókoba kosimba mosala: Biso banso tozali na libaku malamu ya kopesa lisungi ya mosuni na mosala oyo mozali kosalema na mokili mobimba. Basusu bakoki mpe kosangana na misala oyo mizali kosalema mpo na mosala ya Bokonzi. Mokomoko na biso akoki kosala milende ete na makita apesaka biyano oyo bibongisami malamu mpe asalaka mikumba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Na kosimbáká mabaku ya kolendisa basusu, tozali kotonga na lolenge malamu elimo ya lisangá, yango ekosala ete ekokisa mosala na yango malamu.
5 Ya solo, biso banso tozali na ntina mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. Moto moko te asengeli komiyoka ete azali na ntina te. Milende na biso oyo tozali kosala mpo na kosalela Yehova, mizala mingi to moke, mizali komonisa ete tozali kati na basambeli ya solo ya Nzambe. (Mki. 3:18) Mokomoko na biso akoki kozala na ntina monene mpo na oyo etali kokumisa Yehova mpe kosalisa basusu ete báyeba ye mpe básalela ye.