Nsango ya Teokrasi
◼ Bénin, Cameroun, Côte d’Ivoire, Ghana, Liberia mpe Nigeria, bikólo yango nyonso bizwami na Afrika ya Wɛsti, bizwaki motángo monene ya basakoli na Febwáli.
◼ Bato mingi ya Liberia oyo bakimaki bitumba bazali kozonga, mpe nzala ya elimo ezali makasi na ekólo yango. Na Febwáli, basakoli 2 286 batambwisaki boyekoli ya Biblia 6 277.
◼ Na Macao, motángo ya basakoli ekoli na 16 % koleka mobu moleki, bato 135 bapesaki lapolo ya mosala ya kosakola na Febwáli.
◼ Na Fidji, bisanga Salomon mpe Tahiti, oyo ezali na Pacifique ya Sudi, basakoli bakómaki mingi na Febwáli.
◼ Na Madagascar, basakoli bakómaki 9 484, yango ezali komonisa bokoli ya 14 % koleka mobu moleki. Na Febwáli, batambwisaki boyekoli ya Biblia koleka 20 000.