Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Augústo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Augústo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Augústo
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Augústo
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Augústo
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Augústo
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Augústo
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 8/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Augústo

Pɔsɔ ebandi na 3 Augústo

Loyembo 110

Min. 10: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola mpo na lisangá (soki esili kobongisama) mpo na Yulí. Nsango ya Teokrasi.

Min. 15: “Ezali likambo ya ntina ete tózalaka ntango nyonso wana!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá mpe mwa makanisi mosusu mauti na Lamuká! ya 8 Yúni 1988, nk. 19-21 (ebimeli ya Lifalanse), mpo na kolendisa bilenge ete báyanganaka na makita nyonso.

Min. 20: “Bazalani na biso bazali na mposa ya koyoka nsango malamu.” Basakoli mibale to misato ya makoki bazali kosolola na mokuse makanisi oyo mapesami mpo na kolakisa mwa babuku mosusu oyo lisangá ezali na yango kati na libombo. Limbolá mpo na nini mwa babuku yango ekoki kozala malamu na teritware. Lobelá mingi mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mwa buku Azali kosɛnga to na buku Boyebi. Salá bilakiseli mibale oyo bizali komonisa bokutani ya liboso mpe bozongeli ya sika, mpe na boumeli na yango mosakoli asɛngi boyekoli ya Biblia.

Loyembo 73 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 10 Augústo

Loyembo 116

Min. 10: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti. Sɛngá na basakoli nyonso ete bákanisa malamu likoki ya kozala babongisi-nzela basungi na Sɛtɛ́mbɛ, mpamba te sanza yango ezali ebandeli ya mobu ya mosala ya sika.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Ozali nde komɛla ngɛngɛ ya elimo ya mokili? Lisukulu oyo likosalema na nkulutu moko, engebene Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1997, nk. 25-29.

Loyembo 182 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Augústo

Loyembo 18

Min. 8: Mayebisi. Lobelá na mokuse etanda oyo ezali na motó na likambo ete “Tótángaka yango malamu!”

Min. 12: “Botali oyo ekoki kozala lipamboli.” Lisolo kati na bankulutu mibale. Limbolá mikano ya kokende kotalaka bampate, lokola yango emonisami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1993, nk. 20-23. Lendisá lisangá báyebaka ete bankulutu bakoya kotala bango.

Min. 25: “Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?” (par. 1-14) Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali kosembola mwa makanisi na maloba ya ebandeli mpo na kopusa basakoli nyonso ete bákanisa malamu mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na nsima, azali kotalela motuna 1 mpe azali kopesa makanisi oyo mauti na baparagrafe oyo ezali na nse ya motó na likambo moke “Un esprit pionnier enthousiaste” (Elimo ya molende na mosala ya mobongisi-nzela), na Annuaire 1998, nk. 104-105. Bandeko mibale to misato ya lisangá oyo bameseni na mosala ya mobongisi-nzela bamati na ebaelo, mpo na kosolola na ye motuna 2. Bazali kolakisa na lolenge lobongi mpe ya malamu ndenge nini komisalisa na makambo matali mbongo wana ozali mobongisi-nzela. Lisusu, baboti mibale bamati na ebaelo mpo na kosangana na etuluku yango mpo na kotalela motuna 3. Bazali komonisa bantina malamu oyo bilenge baklisto basengeli kokana kosala mosala ya ntango nyonso. Lendisá bayangani nyonso ete bázala wana na pɔsɔ ya nsima, mpo na kotalela mituna oyo etikali.

Loyembo 80 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Augústo

Loyembo 155

Min. 15: Mayebisi. Lobelá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikɛndɛ ya liboso ya Sɛtɛ́mbɛ mpe byangá basakoli nyonso ete básangana na yango. Lobelá na mokuse “Manaka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ezali koya.”

Min. 30: “Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?” (par. 15-25) Lisukulu mpe lisolo oyo ekosalema na nkulutu moko. Bongisá ete babongisi-nzela mpe baoyo basalaki mosala yango báloba na bosembo nyonso na ntina na motuna 4 mpe motuna 5. Bazali kolobela mingi ntina ya kozala na manaka malamu mpe ya kotosa yango, mpe bazali kopesa bandakisa ya ebongiseli ya mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ oyo ebongi mpenza. Nkulutu akosukisa na koyanoláká motuna 6 na lolenge ya kolendisa. Mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ ezali ebandeli ya mobu ya mosala, mpe ezali ntango ebongi mpo na kobanda mosala ya ntango nyonso. Okoki kozwa lokasa ya lisɛngi epai na nkulutu moko mosangani ya komite ya mosala na lisangá.

Loyembo 51 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 31 Augústo

Loyembo 114

Min. 10: Mayebisi. Kundwelá mokomoko ete apesa lapolo ya mosala ya kosakola mpo na Augústo. Lobelá lipesi ya Sɛtɛ́mbɛ.

Min. 15: Bamposa ya lisangá to mpe lisukulu oyo ekosalema na nkulutu moko, na lisolo oyo ezali na motó na likambo ete Nabandi nde kolɛmba? (Me suis-je relâché?) euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛ́mbɛ 1987, nk. 18-19, par. 14-16, ebimeli ya Lifalanse. Lendisá baoyo bazali na molende uta bambula mingi bákanisa na mozindo lolenge ya mosala na bango ya bulɛɛ.

Min. 20: Mokomoko na biso akoki kopesa litatoli ya libaku malamu (Chacun d’entre nous peut donner un témoignage informel). Lisukulu elongo na bayangani euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1987, nk. 22-27, ebimeli ya Lifalanse. Monisá lolenge baoyo bazali na misala mingi ya mosuni, na misala ya mabota to misala na bango moko bakoki kozwa mikolo nyonso mabaku mingi ya koyebisa basusu nsango malamu. Tángá makambo oyo esalemaki.

Loyembo 76 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto