Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/99 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 9/99 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Sɛtɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki bato basepeli na yango, ntango tokozongela bango tokoki kolendisa bango básala abonema. Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Desɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko elongo na Biblia Traduction du monde nouveau.

◼ Mokɛngɛli mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mwa moke nsima. Nsima ya kotalela kɔnti, basengeli koyebisa yango na lisangá ntango bakotánga lapolo ya mbala ya nsima.

◼ Bankulutu bakokende kotala bato oyo babimá na lisangá oyo bazali na mposa ya kozonga na kotalela malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991 na lokasa 21 kino 23.

◼ Soki bato 15 to koleka balingi koya kotala Betele, ezali malamu ete bátinda liboso mokanda na Betele. Tolɔmbi bino ete bóyebisa soki bokozala bato boni, mokolo mpe ngonga oyo bokoya kotala Betele. Liboso ya koya bótalela malako oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 1998 na etanda Biyano na mituna na bino.

◼ Bandeko ya lisangá basengeli kotinda abonema na bango nyonso na nzela ya lisangá. Soki mpe balingi kozongela abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, bakotinda yango bobele na nzela ya lisangá.

◼ La Société akondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli mokambi akozwa bibongiseli ete liyebisi epesama sanza na sanza liboso ete komande ya mikanda ya sanza ekoka kotindama na la Société. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko bákoka koyebisa na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda oyo bokoki kosala komande sipesiale.

◼ Mayangani ya etúká mpe ya mikili mingi “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” oyo esalemaki na 1998, ememelaki bato nyonso oyo bayanganaki mapamboli mingi. Kati na bamisionere mpe bandeko oyo batongaka bandako ya la Société na mokili mobimba, bato 2 764 bazongaki na bamboka na bango na lisalisi ya makabo ya bolingo malamu oyo masangá epesaki. Mbongo oyo epesamaki mpo na ebongiseli yango ebimisi matomba mingi. Lokola mayangani yango esili, mbongo oyo etikali ezali kosalelama mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Tyá likebi na esakweli ya Danyele!—Lifalanse, Lingala, Lingelesi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto