Losambo ya solo ezali kokende liboso na Mpoto ya Ɛsti
1 Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola Bokonzi na molende. Bazalaki kosepela ntango masangá ezalaki ‘kokola mokolo na mokolo.’ (Mis. 16:5, NW) Lokola bazalaki kosakola na molende, yango epesaki nzela ete losambo ya solo epalangana na Azia, na Afrika, mpe na Mpoto, mpe bandimi bakómaki mingi.
2 Na mikolo oyo ya nsuka, losambo ya solo ezali kokola na mikili ya Mpoto ya Ɛsti. Bokoli makasi ezali komonana na bamboka oyo mosala na biso ya kosakola epekisamaki kino na bambula ya 1990. Annuaire ya 1999 emonisi ete mboka mibale na kati ya bamboka yango, Russie na Ukraine, mokomoko ekómi na basakoli koleka 100 000 oyo bazali kosakola. Na teritware 15 ya mboka oyo ezalaki liboso Union soviétique, kobanda 1991 bato koleka 220 000 bamipesaki na Yehova mpe bazwaki batisimo! Bokoli nokinoki motindo oyo esɛngaki kotonga Bandako ya Bokonzi ebele mpe Bandako ya Mayangani mpe koyeisa lisusu bandako ya filiale monene.
3 Ndenge Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 1997 emonisaki yango, mbongo oyo la Société abongisi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi ezali kosalelama mpo na kopesa kredi na masangá oyo ezali na Bandako ya Bokonzi te na mikili oyo, mpo na mikakatano ya nkita, bandeko bazali na makoki te mpo na kotonga bango moko Bandako ya Bokonzi. Banda sanza ya Marsi 1996 kino sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1998, la Société andimaki kopesa bafiliale oyo etalelaka mosala na mikili 11 ya Mpoto ya Ɛsti kredi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi 359. Makabo oyo ezali kopesama ezali kosalelama mpo na kosomba mabelé mpe biloko mosusu mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika mpe kosalisa masangá mpo na kobongisa Bandako ya Bokonzi oyo ebebi. Bafɔtɔ oyo etyami awa ezali komonisa biso ete mosolo oyo bapesaki mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na États-Unis mpe na mikili mosusu esalisaki bandeko na biso na Mpoto ya Ɛsti.
4 Na boumeli ya 1998, na ekólo Bulgarie basakoli zomi na mibale likoló na monkama babakisamaki (12 %), mpe bandeko basepelaki ntango basilisaki kotonga Ndako ya Bokonzi na bango ya liboso na sanza ya Aprili ya mbula yango. Na ekólo Croatie basakoli minei likoló na monkama babakisamaki (4 %), mpe sikoyo bandeko bazali kotonga Bandako ya Bokonzi mingi mpo na kopesa nzela ete losambo ya solo ekende liboso. Na ekólo Hongrie masangá 144 ezali kosalela Bandako ya Bokonzi soko 80. Yango elingi koloba ete kati na masangá 235 oyo ezali na ekólo yango, masangá 61 likoló na monkama ezali na Ndako ya Bokonzi ya bango moko. Na ekólo Macédoine bandeko basalaki programɛ ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya Bokonzi mibale esili kotongama, mpe ebele ya Bandako ya Bokonzi mosusu ezali naino kotongama. Na eleko ya molunge na 1999, na mboka mokonzi Skopje, basilisaki kotonga ndako moko oyo ezali na Bandako ya Bokonzi mibale na kati. Masangá soko motoba ekoki koyangana na Bandako ya Bokonzi yango.
5 Na mbula eleki, na ekólo Russie bato soko 260 bazwaki batisimo pɔsɔ na pɔsɔ! Kolandáká ndakisa ya bikólo mosusu, filiale ya Russie esili kobongisa Bakomite ya Botongi 12 mpo na kosimba ebongiseli ya kotonga Bandako ya Bokonzi na mikolo mizali koya kati na teritware na bango monene. Na nɔrdi ya Saint-Pétersbourg, bazali kotonga Ndako ya Mayangani na bango ya liboso, oyo ekozala na bisika ya kofanda 1 600. Ndako yango ekozala mpe na Bandako ya Bokonzi mitano oyo mokomoko na yango ekozala na bisika ya kofanda 200. Mpo na kokokisa mposa ya elimo ya bandeko mpe ya bato mingi oyo bazali kosepela na mateya ya solo na ekólo Ukraine, Bandako ya Bokonzi 84 esili kotongama mpe mosusu 80 ezali naino kotongama.
6 Bokoli oyo ezali komonana na Mpoto ya Ɛsti ezali mpenza kopesa esengo na mitema na biso, boye te? Ata esika nini oyo tozali, bokoli ya losambo ya solo ezali kokundwela biso ete Nzambe aponaponaka bato te kasi motema molai na ye elimboli lobiko mpo na “ebele monene.” (Emon. 7:9; 2 Pet. 3:9) Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kosangana ata mwa moke na bokoli ya elimo ya ebongiseli ya Nzambe na kopesáká lisungi na biso! Masese 28:27 (NW) epesi biso elaka oyo, ‘ye oyo akokabela mobola akozanga eloko te.’ Soki tokozala na bolingo malamu ya kopesa makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi yango ekosala ete ‘tókokana’ na oyo etali biloko ya mosuni, mpo biso nyonso tózala na esengo ya kopesa mpe esengo ya komona ete losambo ya solo ezali kokende liboso na mokili mobimba.—2 Kol. 8:14, 15, NW; Mis. 20:35.
[Elilingi na lokasa 3]
Sãcele, Roumanie
[Elilingi na lokasa 3]
Maardu, Estonie
[Elilingi na lokasa 3]
Sevnica, Slovénie
[Elilingi na lokasa 3]
Tiszavasvári, Hongrie
[Bililingi na lokasa 4]
Jurmala, Lettonie
[Bililingi na lokasa 4]
Tallinn, Estonie
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Taurage, Lithuanie
[Bililingi na lokasa 4, 5]
Belgrade, Yougoslavie
[Bililingi na lokasa 5]
Prievidza, Slovaquie
[Elilingi na lokasa 5]
Mátészalka, Hongrie
[Bililingi na lokasa 6]
Vranov nad Topl’ou, Slovaquie
[Elilingi na lokasa 6]
Ruma, Yougoslavie
[Bililingi na lokasa 6]
Tornakalns, Lettonie