Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/99 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Omibongisa banda sikoyo mpo na lisalisi ya monganga na lombangu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge oyo Nzambe atalelaka makila
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Oyebi mayele nini okopona?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ozali kozela nini mpo na kotondisa yango?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 9/99 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Osili komibongisa mpo na likama oyo ekoki kokómela yo na mbalakaka?

Lelo oyo, mpo na “ntango mpe makambo makanami te” ekómaka ete bámema biso na lopitalo na mbalakaka, mpe básengisa biso na makasi ete tóndima makila. (Mos. 9:11, NW) Mpo na kosalisa biso tómibongisa na makambo oyo ekoki kokómela biso na mbalakaka, Yehova asili kopesa biso lisungi ndenge na ndenge na nzela ya ebongiseli na ye, kasi azali kozela ete biso mpe tósala oyo esɛngami epai na biso. Awa na nse ezali na mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo.

• Zalá na kalati Instructions médicales/Pas de sang ntango nyonso.

• Sɛnzɛlá ete bana na yo bázala na carte d’identité.

• Talelá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1995, meká komibongisa mpo na ndenge oyo bokoki kosolola na minganga mpe bazuzi mpo na nkisi oyo mwana na yo asengeli kozwa.

• Talelá lisusu masolo oyo elobelaki bankisi mosusu oyo euti na makila (fractions de sang) mpe nkisi mosusu oyo bakoki kosalela na esika ya kozongisama makila. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1994, lokasa 31; 1 Yuni 1990, lokasa 30 mpe 31; 1 Marsi 1989 lokasa 30 mpe 31; Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1994 lokasa 23 mpe 27; 8 Augusto 1993 lokasa 22 kino 25; 22 Novɛmbɛ 1991 lokasa 10 [nyonso na Lifalanse]; mpe Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Mai 1995 mpe siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1994. Bombá yango ntango nyonso esika moko mpo omona yango mbala moko soki ozali na mposa na yango.)

• Kanisá malamu soki okoki kondima ete minganga básalela bamasini oyo ekotambolisa makila na yo libándá ya nzoto to mpe okondima bápesa yo nkisi oyo esalami na biloko mosusu ezwami kati na makila.

• Liboso ya kokende na lopitalo, soki likoki ezali, yebisá bankulutu mpo bákoka kosalisa yo mpe soki yango esengeli, bákutana na Komite ya Boyokani elongo na minganga. Soki yango etaleli mwana moke, sɛngá na bankulutu báyebisa yango libela na Komite ya Boyokani elongo na minganga.

Monisá polele ekateli na yo ya koboya makila: Balapolo emonisi ete bandeko mosusu bazelaka tii ntango oyo balingi kozongisa bango makila mpo na koyebisa minganga oyo bazali kosalisa bango ete balingi makila te. Minganga balingaka bongo te mpe yango ekoki kotya yo na likama ete bázongisa yo makila. Soki minganga bayebi ete bindimeli na yo mpe mposa na yo emonisami na mokanda moko oyo ezali na sinyatili na yo mpe ezali komonisa malako ya sikisiki, yango ekosalisa ete minganga bátosa yango mbala moko mpe yango epesaka bango nzela ya kokanisa nkisi mosusu oyo bakoki kosalela na esika ya kozongisa makila.

Lokola kokɔta lopitalo na mbalakaka ekoki kokómela biso ezala na ntango nini, mbala mingi na ntango oyo tozali ata kokanisa mpo na yango te, zwá bibongiseli uta sikoyo mpo na komibatela yo moko mpe kobatela bana na yo na likambo ya kozongisama makila.—Mas. 16:20; 22:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto