Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/99 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Novɛmbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Novɛmbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Novɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 11/99 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Novɛmbɛ

Pɔsɔ ebandi na 1 Novɛmbɛ

Loyembo 156

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Talelá lisolo “Biblia ezali na nguya!”

Min. 15: “Mosala ya kosakola ezali kokesenisa biso na mangomba mosusu.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Salelá buku Boyebi, lokasa 173 paragrafe 8 mpo na komonisa na mokuse ndenge nini tosengeli kolendisa moto oyo azali koyekola Biblia ete azala na mposa ya kobima na mosala ya kosakola.

Min. 20: “Nani akondima koyekola Biblia?” Lisukulu mpe bilakiseli. Salelá paragrafe 4 ya lisolo oyo mpo na komonisa lolenge ndenge na ndenge ya kolamusa mposa ya moto mpo na koyeba makambo oyo ezali na kati ya mikanda na biso. Bongisá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge tokoki kosala yango. Sɛngá na bayangani ete báloba ndenge basalaki mpo na kobanda koyekola Biblia na bato.

Loyembo 198 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 8 Novɛmbɛ

Loyembo 204

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá bandeko ete na pɔsɔ oyo ezali koya bokosala lisolo na paragrafe 1 kino 18 ya siplema oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Lisukulu. Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi, ete ezalaka ntango nyonso pɛto mpe malamu.

Min. 20: “Ndenge nini okoki kosolola na Mizilma?” Mituna mpe biyano. Monisá ntina ya kozala na mayele ntango tozali kosolola na bato ya mimeseno mosusu. Salá elakiseli moko oyo ebongisami malamu. Mpo na koyeba makambo ya Bamizilma malamu, talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 1998; buku Comment raisonner, lokasa 23-24; mpe buku L’humanité à la recherche de Dieu, mokapo 12.

Loyembo 208 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Novɛmbɛ

Loyembo 211

Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Kundwelá bandeko bibongiseli ya mosala ya kosakola. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli ya ekólo mobimba mpe ya lisanga na bino.

Min. 25: Bamposa ya lisangá to “Kosalela Internet—Kebá na makama!” Ekosalema na mituna mpe biyano paragrafe 1 kino 18. Tángá paragrafe 4 kino 7, 12, 16, 17. Mpe lendisá bandeko nyonso ete bábongisa paragrafe 19 kino 36 mpo na pɔsɔ oyo ekolanda.

Min. 12: Baboti—Boyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ na libota? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Limbolá ntina oyo mabota esengeli koyekola esika moko. (Talá Mokanda mpo na Eteyelo, lokasa 37 kino 38) Lobelá makambo oyo baboti mingi bamikosaka na yango mpo na boyekoli ya libota (1) Baboti mingi bakanisaka ete bana na bango bazali mike mingi mpe bakoki kokanga ntina ya makambo oyo bazali koyekola te, (2) bakanisaka ete koyangana na makita ya lisangá ekoki, (3) balɛmbi mpo bazali na makambo mingi ya kosala, mpe (4) bamipesaka mingi na kotala televizyo. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1994 lokasa 11 kino 12.) Sɛngá na batata ya mabota bálobela ndenge basalaka mpo makambo mosusu ebebisa programɛ na bango ya boyekoli na libota te. Monisá ete koyekola pɔsɔ na pɔsɔ na libota esɛngaka kozala na molende, ekateli, mpe boyokani malamu.

Loyembo 217 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Novɛmbɛ

Loyembo 158

Min. 10: Mayebisi ya lisangá mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola.

Min. 10: Ndenge nini otalelaka mikumba? Lisukulu oyo ekosalema na nkulutu moko. Ezali na misala mingi ya ntina oyo esengeli kosalema mpo lisangá etambola malamu: kobongisa programɛ ya mikumba; kokende kozwa bato mosusu mpo báyangana na makita to kobima na bango na mosala ya kosakola; kosalisa mibange; mpe kosukola, kobongisa mpe kobatela Ndako ya Bokonzi, bakisa mpe kobongisa landalanda. Soki basɛngi yo opesa mabɔkɔ osalaka nini? Bandeko mosusu baboyaka, basusu bandimaka na mitema mibale, to basilisaka mosala basɛngi bango te. Monisá ete kondima kosala misala oyo basɛngi biso epesaka esengo. Lendisá bandeko nyonso na lisangá bámonisa elimo ya komipesa.—Nz. 110:3; Yis. 6:8.

Min. 25: Bamposa ya lisangá to “Kosalela Internet—Kebá na makama!” Ekosalema na mituna mpe biyano paragrafe 19 kino 36. Tángá paragrafe 23 kino 25 mpe 34 kino 36.

Loyembo 223 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Novɛmbɛ

Loyembo 215

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ.

Min. 15: Tólendisa bato ya sika báyanganaka na makita. Lisolo kati na nkulutu moko na mosaleli na misala moko to basaleli na misala mibale, ezwami na mwa buku Ba Témoins de Jéhovah, lokasa 14 kino 15. Lobelá ntina oyo bato ya sika basengeli koyanganaka na makita. Kuna, bakoyekola makambo mosusu mingi ya ntina, bakolendisama, mpe bakozwa lisungi. Lobelá makita mitano oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ, limbolá ntina ya likita mokomoko. Monisá ndenge oyo makita esalisaka mpo na kozala na etamboli oyo eyokani na bobangi Nzambe, makita etongaka moto na elimo, esalaka ete tózala penepene na ebongiseli ya Nzambe, esalisaka biso tókolisa boyokani malamu na bato mosusu, mpe esalisaka biso tóyeba ntina ya mosala na biso ya kosakola. Lendisá bandeko básalelaka mwa buku yango mpo na kolendisa bato ya sika ete báyanganaka na makita.

Min. 20: Ntina oyo tosepelaka kosalela Traduction du monde nouveau. Lisukulu mpe bilakiseli. Na kati ya mangomba nyonso ebongiseli na biso ekeseni mpenza na mangomba mosusu nyonso mpamba te tobimisaka, tosalelaka, mpe tokabolaka libongoli ya Biblia oyo ebimisami na bapakolami ya Yehova. Mposa na biso ezali te ya koluka koteka yango mpo na kozwa mbongo to kosalela yango mpo na kopalanganisa bindimeli ya lingomba oyo ekabolaka bato. Kasi, mposa na biso ezali ya kokumisa nkombo ya Nzambe mpe kosalisa bato mosusu báyeba ye malamu. Mbala mingi mabongoli mosusu ebongolaka Liloba ya Nzambe na lolenge oyo bato bakoki kokanga ntina na yango mpenza te. Monisá ete kosalela Biblia Traduction du monde nouveau ezali malamu koleka. (Talá buku “Makomami nyonso,” lokasa 327 kino 331. Lobelá bakomantere oyo ezali na paragrafe 3. Lobelá makambo oyo ezali komonisa libongoli ya malamu ndenge ezali na paragrafe 6, mpe monisá matomba na yango na paragrafe 22 kino 23.) Bongisá mwa bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge tokoki koyanola soki bato mosusu balobi na biso ete: “Bozalaka na Biblia na bino moko.”—Talá buku Comment raisonner, lokasa 411.

Loyembo 205 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto