Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/00 lok. 8
  • Zalá na esengo na mosala na yo ya bulɛɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na esengo na mosala na yo ya bulɛɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Esengo—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Tósalela Yehova na esengo na motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tosalela Jéhovah na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Baklisto basepelaka kosalela basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 5/00 lok. 8

Zalá na esengo na mosala na yo ya bulɛɛ

1 Bazongaki “na esengo.” Lisolo ya Biblia ezali komonisa ndenge bayekoli 70 bayokaki ntango bazongaki epai ya Yesu mpo na kopesa ye nsango, nsima ya mosala monene ya kosakola oyo basalaki. Bazalaki na esengo mingi na kati ya mitema na bango mpo basalaki mokano ya Nzambe. (Luka 10:17) Nini ekoki kosalisa yo ete ozala mpe na esengo motindo wana na mosala na yo ya bulɛɛ?

2 Zalá na makanisi malamu: Ozali na libaku malamu oyo Nzambe apesi yo ya kolakisa bato mokano monene ya Yehova. Na nzela ya mosala na yo ya kosakola, okoki kosalisa moto ete atika etamboli na ye ya mbindo na mokili oyo mpe alongwa na boombo ya lingomba ya lokuta. Okoki kopesa bato elikya ya bomoi na mokili ya sika oyo bato bakokabwana te lokola ndenge tozali komona lelo oyo. Kanisá esengo oyo Yehova azalaka na yango ntango olongi kolona mombóto ya solo na kati ya motema ya moto moko oyo ayambi yo. Ntango ozali kobondela mpo elimo ya Nzambe ebota mbuma ya esengo kati na yo wana ozali kosala mosala na yo ya kosakola na motema mobimba, kolɛmbisa nzoto te.

3 Kolakisa ndenge ya kosala mosala malamu: Malako oyo Yesu apesaki bayekoli na ye 70 ekokani lelo oyo na Likita ya Mosala. Alakisaki ndenge malamu ya kosala, yango wana basalaki mpe mosala na bango ya kosakola malamu mpenza. (Luka 10:1-16) Lelo oyo Likita ya Mosala ezali kolakisa yo ndenge ya kokende epai ya bato, kobanda kosolola na bango mpe ndenge ya kobanda kotambwisa boyekoli ya Biblia. Soki ozali kosala makasi mpo na kosala lisusu malamu mosala na yo ya kosakola, okomona ete okobanda lisusu kobanga te, okomona lisusu te ete okokoka te kosala mosala yango mpe okozala nde na esengo.

4 Tyá miso na yo na mikolo oyo ezali koya: Atako akutanaki na mikakatano, Yesu azwaki esengo na mosala na ye ya bulɛɛ. Mpo na nini? Mpamba te atyaki miso na ye mpenza na mapamboli oyo ezalaki liboso na ye mpe na makambo oyo balakaki ye. (Ebe. 12:2) Yo mpe okoki kosala bongo, soki otii makanisi na yo mpe motema na yo na nkombo ya Yehova mpe na mapamboli oyo ekoya na mokili ya sika ya Nzambe. Yango ekobakisa esengo na yo mpe ekosala ete mosala na yo ya kosakola ezala na ntina.

5 Kosalela Yehova mosala ya bulɛɛ ezali libaku malamu oyo eleki mabaku nyonso oyo okoki kozala na yango lelo oyo. Yango wana, tiká oloba boye: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo, ɛ Nzambe na ngai.”​—Nz. 40:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto