“Bámekama liboso soki babongi”—Ndenge nini?
1 Lokola ebongiseli ya Yehova ezali se kokóma monene, mposa ya kozala na bandeko mibali ya makoki oyo bakoki kosala lokola basaleli na misala ezali se kobakisama. Bandeko mingi oyo bakómi naino basaleli na misala te, bakisa mpe bilenge, bazali na mposa ya kosala misala na kati ya lisangá. Ntango bazali kopesa bango mwa misala mosusu ya kosala, bamiyokaka ete bazali na ntina mpe bamonaka ete bazali kokola. Mpo bákoka kozwa mikumba ya minene, basengeli “komekama liboso soki babongi.” (1 Tim. 3:10, NW) Likambo yango ekosalema ndenge nini?
2 Mokumba ya bankulutu: Na kati ya makambo ya kotalela ndeko mobali soki akokisi masɛngami ya Makomami oyo ezali na 1 Timote 3:8-13 mpo na kosala lokola mosaleli na misala, bankulutu bakomeka ndeko yango mpo na komona soki abongi kozwa mokumba. Bakoki kopesa ye mwa misala mosusu lokola kokabola bazulunalo mpe mikanda epai ya bandeko na lisangá, kotambwisa mikro, kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi mpe bongo na bongo. Bankulutu bakotala ndenge oyo azali kotalela mpe kosala misala oyo bapesi ye. Bakoluka koyeba soki na bizaleli na ye azali moto oyo bakoki kotyela ye motema, atosaka ngonga, amipesaka na mosala, azali na bopɔlɔ, na elimo ya komipesa mpe soki ayokanaka malamu na bato mosusu. (Filp. 2:20) Apesaka ndakisa malamu na ndenge na ye ya kolata mpe ya kobongisa nzoto? Azwaka mikumba na ye na lisɛki te? Bankulutu bakoluka komona ete “bizaleli na ye malamu, misala na ye na bopɔlɔ ezali komonisa bwanya.” (Yak. 3:13, NW) Azali mpenza na mposa ya kosalisa lisangá? Azali kosakola na molende mpenza mpo na kokokisa etinda oyo Yesu apesaki ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso”?—Mat. 28:19; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1990, lokasa 18-28.
3 Biblia epesi mbula ya sikisiki te oyo moto asengeli kozala na yango mpo na kosala lokola mosaleli na misala. Atako bongo ezali kolobela bandeko motindo wana lokola “mibali oyo bakosalaka mosala.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Ezali mpasi mpo tókanisa ete bandeko yango basengeli kozala bana to na ebandeli ya bolenge na bango, mingimingi mpenza mpo vɛrsɛ yango emonisi ete bakoki kozala na mwasi mpe na bana. (1 Tim. 3:12, 13) Mibali motindo wana basengeli te komipesa na “bamposa nyonso ya bolenge” kasi basengeli kopesa nzoto na bango kilo, kozala na lokumu malamu mpe na lisosoli malamu na miso ya Nzambe mpe ya bato.—2 Tim. 2:22.
4 Atako makoki oyo moto azali na yango ezali na ntina, kasi ezaleli na ye mpe elimo na ye nde ezali na ntina mingi koleka. Ndeko mobali azali, na komikitisa nyonso, koluka kokumisa Nzambe mpe kosalela bandeko na ye? Soki ezali bongo, Yehova akopambola milende na ye mpo akola na kati ya lisangá.