Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 10 Yuli
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ 1999 ya ekólo mobimba mpe ya lisangá na bino. Bendá likebi ya bandeko na etanda “Talá na lokasa ya nsuka,” mpe salá elakiseli na lisolo moko na masolo yango, oyo etali teritware na bino.
Min. 15: “Tokotika koloba te.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá ntina oyo totalelaka mosala na biso ya kosakola na lisɛki te. Lobelá mpe makambo mosusu ya ntina na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1997 lok. 23-24.
Min. 18: “‘Tiká ete makambo nyonso esalema mpo na kolendisa.’” Lisolo kati na bankulutu mibale. Bakotánga baparagrafe mpe bavɛrsɛ nyonso oyo ezali na lisolo yango. Bakomonisa mateya oyo ezali na bavɛrsɛ yango. Bakolobela ntina ya kozala na bososoli ntango tozali kosala makambo ya mombongo to kotya mbongo na makambo ya mombongo. Bakolobela mpe toli oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1997, lok. 18, 22.
Loyembo 15 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Yuli
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Limbolá na mokuse ndenge oyo tokoki kosalela mwa buku Nkombo ya Nzambe mpo na kosalisa bato oyo bazali kosepela na solo sika bámona ntina ya koyeba mpe ya kosalela nkombo ya Nzambe.—Talá buku Comment raisonner, lok. 200-201.
Min. 10: “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Yebisá dati ya liyangani ya zongazonga ya mbala oyo, mpe lendisá moto nyonso azala mikolo nyonso mibale na liyangani. Lendisá moto nyonso asala milende mpo na kobenga bato oyo bazali koyekola Biblia báya na liyangani. Mbala mosusu soki bayei na liyangani, bakoki komonisa nokinoki mposa ya koyangana mbala na mbala na makita.
Min. 20: Osengeli kolanda ndakisa ya nani? Tata moko azali koyekola Biblia na kati ya libota na mwana moko to na bana mibale oyo bazali bilenge. Ayokaki ndenge bana na ye bazalaki kolobela mingi bilombe ya masano, ya bafilime, ya televizyo, mpe baalanga-nzembo. Amonisi ete likambo yango ezali kotungisa ye mpo kosepela na bato yango motindo wana ezali komonisa elimo ya mokili. Balobeli makambo oyo ezali na Lamuká! ya 22 Mai 1998, lok. 12-14 (na Lifalanse). Bilenge yango bamoni ete ezali likama komipesa na bato ya lokumu ya mokili oyo mpe bandimi ete lokumu ya mokili oyo ekopesa baklisto eloko moko te. Bamoni ntina ya kolanda ndakisa ya baboti, ya bankulutu, mpe ya bandeko mosusu oyo bazali na etamboli malamu na kati ya lisangá—mpe ntina ya kotalela mpenza Yesu Klisto—lokola ndakisa na bango.
Loyembo 34 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Yuli
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Tómilobela biso mpenza lokola basali ya Nzambe. Basaleli na misala mibale bazali kolobela toli ya Makomami oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1998, lok. 19-20. Bazali komonisa ntina ya kokokisa masɛngami malamumalamu mpo na kosala lokola mosaleli na misala mpe bazali kolobela lisusu makambo oyo bakosala mpo na komonisa ete bazali kokokisa mokumba na bango. Bazali komonisa ntina ya kopesa ndakisa malamu na mosala ya kosakola mpe bazali kolobela ndenge bakoki kosalisa bankulutu mpo na kosunga bato mosusu. Bandimi ete bakosala nyonso mpo na kosalisa bandeko ya lisangá bámona ete ntango oyo tozali kobika na yango ezali ntango ya kosala na lombangu, mpe ya kokende liboso na elimo.
Min. 10: Tótinda mikanda epai ya bato oyo tozali na likoki ya kokutana na bango te. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lokola tozali lisusu kokutana na bato mingi te na bandako na bango, basakoli mosusu bazwaka matomba malamu na kokoma mikanda. Talelá toli oyo: Mikanda yango esengeli kozala milaimilai te, makambo oyo tokokoma esengeli kouta na Makomami, mpe esengeli komonisa limemya. Soki okomi mokanda, tyá nkombo na yo. Soki okomi mokanda yango na mabɔkɔ to na masini osengeli kokeba ete ezala na bafoti te mpe makambo yango emonana polele. Tyá adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi mpe ngonga ya makita ya lisangá na bino, tindá mpe lokasa ya libyangi mpo na makita. Kosalela adrɛsi ya Biro te. Talelá mpe makanisi oyo ezali na buku Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 87-88, mpe ‘Biyano na mituna na bino’ oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1996.
Min. 15: Salelá maloba ya kobanda lisolo oyo ezali kobimisa matomba. Poná maloba ya kobanda lisolo, mibale to misato na buku Comment raisonner na lok. 9-15, mpe lobelá ndenge tokoki kosalela yango na teritware na biso. Tuná bayangani: “Maloba nini ya kobanda lisolo bosalelaka ntango bozali kosolola na moto na balabala, na litatoli ya libaku malamu, to na lolenge mosusu ya kopesa litatoli?” Soki ntango ezali salá elakiseli moko to bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kobanda lisolo.
Loyembo 54 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 31 Yuli
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli. Sɛngá bandeko báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango na sanza oyo ntango bazalaki kokabola mwa babuku.
Min. 12: Bamposa ya lisangá.
Min. 18: “Oyebaka ntina oyo Yehova azalaka motema pɛtɛɛ?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá mpe makambo mosusu ya ntina mpo na motema molai ya Yehova.—Talá Étude perspicace, volimi 2, lok. 499-500.
Loyembo 75 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 7 Augusto
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 17: “Ozalaka nsɔninsɔni?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá likambo moko ya kolendisa oyo ezali na Annuaire 1997, lok. 43-44.
Min. 18: Zalá na mayele mpo na mikolo oyo ezali koya. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Bilenge basepelaka kozala na bomoi ya malamu na mikolo oyo ezali koya elongo na bato oyo bango balingaka. Atako yango ezali mposa ya moto nyonso, bilenge basengeli kolanda toli ya Nzambe soki balingi mpenza kozala malamu. (Mas. 19:20) Ntango moto azali naino elenge, mposa ya kozala esika moko na mwana mwasi to na mwana mobali ezalaka makasi mpenza. Soki moto apekisi mposa yango te ekoki komemela ye likama. Mituna mingi ebimaka mpo na koyeba soki bilenge bamonisaka mayele ntango bakómi kosepela na mwana mwasi to na mwana mobali, ntango bakómi na lolango oyo ekoki kotinda bango bákóma kobima elongo na mwana mwasi to na mwana mobali. Lobelá lisusu toli oyo ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka na lok. 231-235. Lobelá makambo ya ntina oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1999, lok. 18-23 oyo ezali komonisa ntina oyo bilenge basengeli kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga bango. Lendisá bilenge bámanyola likoló ya toli yango mpe soki bazali na mituna mpo na yango básolola na baboti na bango.
Loyembo 101 mpe libondeli ya nsuka.