Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 14 Augusto
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola mpo na sanza ya Marsi ya ekólo mobimba mpe ya lisangá na bino. Etikali bobele pɔsɔ mibale mpo sanza ya Augusto esila, na yango lendisá bandeko bábima na mosala ya kosakola liboso ete sanza esila. Lobelá mpe programɛ ya likita ya mosala ya kosakola mpo na wikende.
Min. 15: “‘Obundaka etumba malamu ya kondima.’” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Okolobela mpe makambo mosusu oyo ezali na buku Lisanga, na lok. 44-45, oyo ezali komonisa ndenge batambwisi ya boyekoli ya mokanda bakoki kobongisa likita ya mosala ya kosakola na bituluku na bango mpe ndenge bakoki kotya likebi na mosakoli mokomoko ya etuluku na bango oyo azali na mposa ya lisalisi mpo na kosakola mpe kopesa lapolo na ye sanza na sanza.
Min. 18: Kokɔta kelasi ekoki kopesa yo matomba. Tata moko azali kosolola na bana na ye mpo na kosalisa bango bámona ntina ya kokɔta kelasi. (Talá buku Mituna oyo bilenge batunaka, lok. 133-139.) Lokola mokili ya lelo etondi na mobulu, bilenge mingi babangaka kokende na kelasi. Bakanisaka mpe lisusu ete makambo oyo bazali koyekola na kelasi ezali mpenza na ntina mingi te, yango mpe elɛmbisaka bango. Tata yango azali kolobela mitinda ya Makomami mpe ntina malamu oyo ezali komonisa ete ebongi kotánga kelasi malamu mpo na kozwa mayele. Alendisi bana na ye báyekolaka malamu mpe bátyaka likebi ntango balakisi bazali koteya bango na kelasi.
Loyembo 127 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Augusto
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Bongisá malamu elakiseli moko mpo na mosala ya kosakola oyo ekomonisa ndenge ya koyanola na motuna oyo: “Mpo na nini Nzambe ya bolingo akoki kotika ete bampasi eumela mingi boye?” (buku Comment raisonner, lok. 376-377) Lendisá moto nyonso ete abima na mosala ya kosakola na wikende oyo.
Min. 8: “Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo.” Lisukulu. Yebisá dati ya liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo, soki boyebi yango, mpe lendisá bandeko nyonso bázala wana na liyangani mokolo mobimba. Lendisá basakoli bábenga mpe bato nyonso oyo bazali kosepela na solo mpe baoyo babandi koyekola Biblia sika.
Min. 25: “Ozali mpenza kozwa litomba?” Ekosalema na mituna mpe biyano.
Loyembo 152 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Augusto
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Augusto. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli kotala malamumalamu soki basakoli nyonso ya etuluku na bango bapesi lapolo na bango mpo balapolo nyonso ekoka kotindama nsuka na mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Makita epesaka bilenge matomba.” Ekosalema na mituna mpe biyano na nkulutu moko. Ntango bokokóma na par. 8, bótalela mwa makambo mosusu oyo epesaka nzela ete moto atya mpenza likebi mpe ayoka malamu ntango makita ezali kosalema. (Talá Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ 1998, lok. 19-20.) Lendisá baboti bápesa nzela te ete bana na bango bázangisaka makita.—Talá makambo oyo bandeko bakutanaki na yango oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1997, lok. 25.
Loyembo 176 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Sɛtɛmbɛ
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Bólobela makambo etali “Ndenge ya kotalela mikanda na Ndako ya Bokonzi.”
Min. 10: Ntango na biso ezali na ntina mingi. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1996, lok. 22-23.
Min. 20: “Ozali koyika mpiko?” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lendisá moto mokomoko akanisa milende oyo asi asali mpo na koyika mpiko na mosala ya boklisto. Soki tokómi na bolɛmbu, tosengeli bongo komilendisa na elimo. Lobelá mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1999, lok. 20-21, par. 17-21. Sɛngá na basakoli mibale to misato baoyo bazali koyika mpiko uta bambula mingi báyebisa likambo oyo bango moko bazali kosala mpo na koyika mpiko.
Loyembo 206 mpe libondeli ya nsuka.