Mayangani ya etúká mpe oyo esangisi bato ya mikili mingi etindi biso tópesa Nzambe nkembo!
Mayangani “Pesá Nzambe nkembo,” ezala ya etúká to oyo esangisi bato ya mikili mingi, oyo esalemi epesi litatoli monene mpenza. Bibongiseli yango minene ya teokrasi ekumisi nkombo ya Yehova mpe epesi biso lisusu makoki ya ‘kopesa Yehova nkembo oyo ekoki na nkombo na ye.’ (Nz. 96:8) Ya solo, Yehova abongi mpenza kozwa nkembo mpo na biloko ya kokamwa oyo akelá, oyo ezali komonisa bizaleli ya malamu mpenza oyo azali na yango.—Yobo 37:14; Emon. 4:11.
Salelá mituna oyo elandi mpe banɔti oyo ozwaki na liyangani mpo na komibongisa mpe kopesa biyano na lisolo oyo ekosalema na pɔsɔ oyo ekobanda na 20 Ɔkɔtɔbɛ, oyo ekozongela makanisi ya ntina ya liyangani.
1. Ndenge nini biloko oyo Nzambe akelá ezali kosakola nkembo na ye, mpe na nini yango ekeseni na ndenge oyo bato bakumisaka Nzambe? (Nz. 19:1-3; “Biloko oyo Nzambe akelá ezali kosakola nkembo na ye”)
2. Mbongwana ya Yesu ezalaki elilingi ya likambo nini oyo esili kokokisama na mikolo na biso mpe ndenge nini likambo yango ezali kolendisa baklisto lelo oyo? (lisukulu-mobɔkɔ, “Bimonaneli ya nkembo ya makambo oyo ekoya ezali kolendisa biso!”)
3. Ndenge nini tokoki kolona komikitisa lokola oyo mosakoli Danyele azalaki na yango, mpe litomba nini tokozwa soki tosali bongo? (Dan. 9:2, 5; 10:11, 12; “Nkembo ya Yehova emonisami epai ya bato ya komikitisa”)
4. (a) Makambo nini misato tokoki koyekola na esakweli ya Amosa na oyo etali bitumbu ya Nzambe? (Amo. 1:3, 11, 13; 9:2-4, 8, 14) (b) Lelo oyo, liteya nini Batatoli ya Yehova bakoki kozwa na ndakisa ya kokebisa oyo ezali na Amosa 2:12? (“Esakweli ya Amosa—Ndenge oyo nsango na yango etaleli mikolo na biso”)
5. (a) Makama nini ekoki kokómela moto oyo amɛlaka masanga mingi ata soki alangwaka te? (b) Ndenge nini moto oyo amɛlaka mingi akoki kotika momeseno yango? (Mko. 9:43; Ef. 5:18; “Kebá na motambo ya komɛla masanga mingi”)
6. Matomba nini ozali kozwa na mokanda ya sika “Talá mokili malamu”? (“‘Mokili malamu’ emonisi mwa moke ndenge Paladiso ekozala”)
7. Na makambo nini misato tokoki ‘kongɛngisa nkembo ya Yehova lokola talatala’? (2 Kol. 3:18; “Tóngɛngisa nkembo ya Yehova lokola talatala”)
8. Mpo na nini bayinaka biso kaka mpamba, mpe nini ekoki kosalisa biso tóbatela bosembo na biso atako bazali koyina biso ndenge wana? (Nz. 109:1-3; “Bayinami kaka mpamba”)
9. Makanisi nini Klisto azalaki na yango na likambo etali kozala moto monene, mpe ndenge nini moto akoki koyeba ete asengeli kosala lisusu milende mpo makanisi wana ekɔtela ye malamumalamu? (Mat. 20:20-26; “Tózala na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene”)
10. Nini ekoki kosalisa biso tózala kaka makasi na elimo ata soki nzoto na biso elɛmbi? (“Tolɛmbi, kasi makasi esili te”)
11. Tángá mwa banzela oyo Satana asalelaka mpo na kopanza lokuta, mpe toli nini ya Makomami ekoki mpenza kosalisa biso ntango tokutani na makambo ndenge na ndenge oyo ezali komeka kobebisa kondima na biso? (Yoa. 10:5; “Kebá na ‘mongongo ya bapaya’”)
12. (a) Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya Yesu oyo elobelami na Malako 10:14,16? (b) Makambo nini esepelisi yo na buku Yekolá epai ya moteyi monene? (“Bana na biso bazali libula moko ya motuya”)
13. Ndenge nini bilenge bazali kokumisa Yehova? (1 Tim. 4:12; “Ndenge oyo bilenge bazali kokumisa Yehova”)
14. Biteni nini ya drame “Pesá litatoli na mpiko ata soki botɛmɛli ezali” etikali na makanisi na yo?
15. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya (a) Petelo ná Yoane? (Mis. 4:10) (b) ya Setefano? (Mis. 7:2, 52, 53) (c) ya lisangá ya baklisto ya ekeke ya liboso? (Mis. 9:31; drame mpe lisukulu “Sakolá nsango malamu ‘kozanga kotika’”)
16. (a) Na makambo nini biso nyonso tozwaki ekateli ya kopesa Nzambe nkembo? (b) Likambo nini oyo tosengeli kondima ete ekokómela biso ntango tozali kosalela makambo oyo toyokaki na liyangani “Pesá Nzambe nkembo”? (Yoa. 15:9, 10, 16; “‘Kobá kobota mbuma mingi’ mpo na nkembo ya Yehova”)
Soki tozali komanyola likoló ya mateya oyo toyokaki na liyangani, yango ekotinda biso na kosalela makambo oyo toyokaki. (Filp. 4:8, 9) Yango ekolendisa lisusu ekateli na biso ya ‘kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’—1 Kol. 10:31.