Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/03 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Novɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 10/03 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 13 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 215

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani bámibongisa mpo na lisolo elongo na bayangani oyo ekolobela liyangani ya etúká “Pesá Nzambe nkembo,” na Likita ya Mosala ya pɔsɔ oyo elandi; mpo na yango, básalela mituna ya lokasa 1 mpo na kotalela banɔti oyo bazwaki na liyangani yango. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8a mpo na kosala bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka. Elakiseli moko ekomonisa mosakoli moko azongeli moto moko oyo ye atikelaka bazulunalo mbala na mbala. Mpo na koya lisusu kotikela ye bazulunalo oyo ekobima, akolakisa ye makambo oyo ezali na etanda “Kati na nimero na biso ekolanda.”​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 1998, lok. 8 par. 1-2, 7.

Min. 20: ‘Tósalela Yehova na esengo.’b (Na lisolo oyo, bayangani nyonso basengeli kozala na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002.) Nsima ya kotalela paragrafe 4, yebisá ete tokolakisa mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi na sanza ya Novɛmbɛ. Bótalela na mokuse likanisi moko kaka na makanisi oyo bapesi na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002 mpo na ndenge ya kolakisa mikanda yango. Na nsima, basakoli mibale bakomekameka ndenge ya kosalela likanisi yango liboso ya kokende na mosala ya kosakola. Lendisá basakoli nyonso bámibongisaka malamu mpo na mosala ya kosakola.

Min. 15: Koyekola na bato Biblia epesaka matomba. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá mwa ndambo ya masolo oyo ezali na mikanda na biso, oyo ezali komonisa ndenge bandeko babandaki koyekola na bato Biblia mpe ndenge oyo bato yango bakolaki na elimo. (w00 1/3 lok. 6; yb98 nk. 55-60) Sɛngá bayangani bálobela liteya oyo tozwi na masolo yango mpe matomba oyo tozwaka ntango tozali koyekola na bato Biblia.

Loyembo 172 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 86

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 40: “Mayangani ya etúká mpe oyo esangisi bato ya mikili mingi etindi biso tópesa Nzambe nkembo!” Ekosalema na nkulutu moko. Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, salelá mituna oyo ezali na lisolo yango mpo na kosolola elongo na bayangani likoló ya mateya oyo bayokaki na liyangani. Kabolá ntango ya lisolo oyo malamu mpo bókoka kotalela mituna nyonso; yango ekosɛnga ntango mosusu ete mpo na mituna mosusu, moto moko kaka apesa eyano. Ntango oyo epesami ekokoka te mpo na kotánga bavɛrsɛ nyonso oyo epesami; batii bavɛrsɛ yango mpo na kosalisa bayangani bázala na mpasi te ya kozwa biyano. Esengeli kolobela mingimingi matomba oyo tokozwa soki tosaleli makambo oyo toyokaki na liyangani.

Loyembo 112 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 64

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lendisá bayangani nyonso bázongela kotánga banɔti oyo bazwaki na liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala oyo euti koleka mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ oyo elandi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8c mpo na kosala bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka. Na elakiseli moko, monisá lolenge ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nasepelaka na yango te.​—Talá mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló na Biblia, lok. 8. [“Ça ne m’intéresse pas.”​—Talá buku Comment raisonner, lok. 16.]

Min. 20: Salelá mopanga ya elimo. (Ef. 6:17) Lisolo elongo na bayangani na lisalisi ya buku Eteyelo ya Mosala, nkasa 143-144. Sɛngá bayangani bápesa biyano na mituna oyo: (1) Mpo na nini tosalelaka Biblia mpo na koyanola na mituna oyo batunaka biso? (2) Lokola tobengami Batatoli ya Yehova, yango emonisi ete tozali na mokumba nini? (3) Ndakisa nini Yesu apesaki, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa yango? (4) Na teritware na bino, wapi mwa mayele ebongi oyo bosalelaka liboso ya koyebisa moto likanisi moko ya Biblia? (5) Soki likoki ezali, mpo na nini ezali malamu kotángelaka moto vɛrsɛ na Biblia? (6) Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bandeko mosusu báyeba kosalela Biblia malamu? Bósalela makanisi ya devuare, na lokasa 144, mpo na kosala elakiseli moko oyo bokobongisa malamu. Na elakiseli yango, mosakoli moko ya makoki akosalela ata vɛrsɛ moko mpo na koyanola na motuna moko. Lendisá basakoli nyonso bámityela mokano ya kosalela Biblia ntango nyonso oyo bazali kopesa litatoli.

Min. 13: Makambo oyo basakoli ya lisangá na bino bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango mikolo oyo bazalaki kokende na liyangani ya etúká to ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu na mosala, na eteyelo, to na bisika mosusu.

Loyembo 52 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Novɛmbɛ

Loyembo 147

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: Tózala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza. (1 Tim. 6:18) Nkulutu moko akosalela mituna oyo ezali awa mpo na kosolola na bayangani na ntina na liyangani ya mokolo moko oyo esalemaki na mobu ya mosala oyo euti koleka. Sɛngá bayangani báyebisa ndenge basalelaki makambo oyo bayokaki na liyangani yango. (Liboso mpenza, okoki kopona mwa bandeko mpe koyebisa na mokomoko motuna oyo akoki komibongisa mpo na yango) Lobelá masolo oyo: (1) “Misala ya malamu mpenza epesaka litomba monene.” (Mos. 2:11) Mpo na nini basaleli ya Nzambe bamipesaka na misala ya malamu mpenza oyo elobelami na Liloba ya Nzambe na esika ete bámipesa na misala ya mpambampamba ya mokili oyo? (2) “Tózala bato ya bomɛngo na miso ya Nzambe.” (Mat. 6:20) Ndenge nini bato mosusu ‘bamibombeli biloko ya motuya na likoló,’ mpe matomba nini bazwi? (3) “Bandá koyekola Biblia na moto mpo mosala na yo ya kosakola ekóma na ntina mingi.” (om nk. 91-92) Nini ekoki kosalisa biso tóbanda koyekola na moto Biblia mpe tólanda koyekola na ye? (4) “Misala ya malamu mpenza na ntango oyo ya kobuka mbuma.” (Mat. 13:37-39) Ndakisa nini ya misala ya malamu mpenza baklisto ya ekeke ya liboso batikelaki biso, mpe ndenge nini mosala ya Bokonzi ekoli na mikolo na biso? (5) “Tiká ete misala na bino ya malamu mpenza epesa Yehova lokumu.” (Mat. 5:14-16) Ndenge nini basakoli mosusu ‘bazali kongɛngisa pole na bango’? (6) “Tozali kopesa bilenge longonya mpo bazali kosala misala ya malamu mpenza oyo ezali kosanzola Yehova.” (Nz. 148:12, 13) Ndenge nini bilenge ya zongazonga na biso bazali kokumisa Yehova? (7) “Tókoba kosala misala ya malamu mpenza mpo na kozwa mapamboli ya Yehova.” (Mas. 10:22) Mapamboli nini biso moko, libota na biso, lisangá na biso, mpe ebongiseli mobimba ya Yehova ekoki kozwa soki tozali komipesa na misala ya malamu mpenza?

Loyembo 180 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto