Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/1 nk. 21-25
  • Pesá Nzambe nkembo kasi moto te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pesá Nzambe nkembo kasi moto te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motó ya likambo ya mokolo ya liboso: “Yehova, . . . obongi kozwa nkembo”
  • Motó ya likambo ya mokolo ya mibale: “Bóyebisa nkembo na ye kati na bikólo”
  • Motó ya likambo ya mokolo ya misato: “Bosalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe”
  • Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bateyi ya liloba ya Nzambe balendisami ete bákokisa mokumba na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Basakoli ya Bokonzi ya molende” bayanganaki na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mayangani ya etúká mpe oyo esangisi bato ya mikili mingi etindi biso tópesa Nzambe nkembo!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/1 nk. 21-25

Pesá Nzambe nkembo kasi moto te

NA BASANZA euti koleka, na mokili mobimba, bato oyo balingaka boyengebene bayekolaki ndenge ya kopesa Nzambe nkembo na Mayangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Pesá Nzambe nkembo.” Tózongela naino na mokuse mateya oyo epesamaki kuna.

Na bisika mingi, mateya yango ya Biblia eumelaki mikolo misato, mpe mayangani oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili ekeseni eumelaki mikolo minei. Bayangani balandaki masolo koleka 30, mosusu kati na yango ezalaki masukulu oyo ebakisaki bososoli na bango ya elimo mpe botɔndi na bango, kondima na bango elendisamaki na masolo ya makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, balandaki bilakiseli oyo emonisaki ndenge ya kosalela toli ya Biblia, mpe drame oyo emonisaki mikakatano oyo baklisto ya liboso bakutanaki na yango. Soki yo mpe ozalaki na liyangani moko, tolendisi yo otalela lisusu banɔti na yo ntango ozali kotánga lisolo oyo. Tondimi mpenza ete yango ekosalisa yo okanisa lisusu makambo kitoko oyo elekaki kuna mpe okobakisa boyebi na yo.

Motó ya likambo ya mokolo ya liboso: “Yehova, . . . obongi kozwa nkembo”

Nsima ya loyembo mpe libondeli ya ebandeli, molobi ya liboso atombelaki bayangani nyonso boyei malamu mpe amonisaki ntina ya liyangani yango na lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Toyangani mpo na kopesa Nzambe nkembo.” Molobi atangáki Emoniseli 4:11 mpe abimisaki motó ya likambo ya liyangani yango. Amonisaki soki kopesa Nzambe nkembo elimboli nini. Asalelaki mokanda ya Nzembo mpo na komonisa ete kopesa Nzambe nkembo ezali kosɛnga ‘kosambela,’ ‘kopesa matɔndi,’ mpe ‘kosanzola ye.’​—Nzembo 95:6; 100:4, 5; 111:1, 2.

Lisolo ya mibale ezalaki na motó ya likambo “Baoyo bapesaka Nzambe nkembo bazwaka mapamboli.” Molobi alobelaki likambo moko ya ntina mpenza. Lokola Batatoli ya Yehova bazali koleka milio motoba na bikólo 234, tokoki koloba ete butu na moi, bato oyo bazali kopesa Yehova nkembo bazangaka te. (Emoniseli 7:15) Molobi asololaki na mwa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso mpe bayangani balendisamaki mingi.

Lisolo oyo elandaki ezalaki na motó ya likambo ete “Biloko oyo Nzambe akelá ezali koyebisa nkembo na ye.” Atako likoló elobaka te, emonisaka mpenza bonene ya Nzambe mpe ebakisaka botɔndi na biso mpo na bolingo na ye. Molobi alimbolaki likambo yango malamumalamu.​—Yisaya 40:26.

Minyoko, botɛmɛli, masɛnginya ya mokili mpe mposa na biso ya masumu ezali mpenza komeka bosembo ya baklisto ya solo. Yango wana, bayangani batyaki mpenza likebi na lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tambolá na nzela ya bosembo.” Lisukulu yango elimbolaki vɛrsɛ mokomoko ya Nzembo 26, mpe molobi atunaki elenge Motatoli moko oyo azali mwana-kelasi, oyo abatelaki bizaleli malamu mpe elenge mosusu oyo azalaki kolekisa ntango mingi na masano ya mabe, kasi na nsima asalaki makasi mpe atikaki yango.

Programɛ ya ntɔngɔ esukaki na lisukulu-moboko, oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bimonaneli ya nkembo ya makambo oyo ekoya ezali kolendisa biso.” Molobi apesaki ndakisa ya mosakoli Danyele mpe ntoma Yoane ná ntoma Petelo, baoyo kondima na bango elendisamaki na bimonaneli ya nkembo oyo etalelaki kotyama ya Bokonzi ya Masiya mpe misala na yango. Na ntina na bato oyo bakoki kobosana makambo oyo ezali komonisa polele ete tozali na ntango ya nsuka, molobi alobaki boye: “Tozali kolikya ete bakofungola lisusu miso mpo na komona bilembo ya kozala ya Klisto na nkembo ya Bokonzi mpe bakosalisama mpo bázonga lisusu makasi na elimo.”

Na nsima ya midi, programɛ ebandaki na lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Nkembo ya Yehova emonisami epai ya bato ya komikitisa.” Molobi amonisaki ndenge Yehova, atako aleki likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba, azali kopesa ndakisa ya komikitisa. (Nzembo 18:35) Yehova asepelaka na bato ya komikitisa, kasi aboyaka bato oyo bamikitisaka kaka liboso ya bato oyo bazali ndenge moko na bango to liboso ya bato oyo baleki bango, kasi bamatelaka baoyo bazali na nse na bango.​—Nzembo 138:6.

Na nsima, masukulu-matongami na biteni misato oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Esakweli ya Amosa​—Ndenge oyo nsango na yango etaleli mikolo na biso” elimbwelaki biso bisakweli ya mokanda yango. Molobi ya liboso alobelaki ndakisa ya Amosa mpe abendaki likebi na mokumba oyo tozali na yango ya kokebisa bato ete Yehova azali koya kosambisa. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki “Sakolá Liloba ya Nzambe na mpiko.” Molobi ya mibale atunaki motuna oyo: “Mokolo mosusu, Yehova akosilisa mabe mpe mpasi awa na mabelé?” Eteni na ye oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Etumbu ya Nzambe mpo na bato mabe,” emonisaki ete Nzambe apesaka etumbu kaka na ntina, moto akoki kokima yango te mpe apesaka yango kaka na baoyo basali mabe. Molobi ya nsuka alobelaki eteni oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Yehova atalaka oyo ezali na kati ya mitema.” Bato oyo balingaka kosepelisa Yehova bakosalela toli ya Amosa 5:15 oyo elobi ete: “Bóyina mabe mpe bólinga malamu.”

Masanga, na ndakisa vinyo, esepelisaka motema; kasi, moto akoki kolekisa ndelo na komɛla yango. Molobi oyo asalaki lisukulu “Kebá na motambo ya komɛla masanga mingi,” atángaki mwa makama mpo na nzoto mpe mpo na elimo oyo komɛla masanga mingi ekoki komema, ata soki moto azali kolangwa te. Apesaki toli oyo: Lokola bato nyonso bakokaka masanga ndenge moko te, soki omoni ete bakɔpɔ oyo omɛli elongoli yo “mayele ya bomoto mpe makoki ya kokanisa,” yebá ete osí olekisi ndelo.​—Masese 3:21, 22.

Lokola tozali na bantango ya ndenge mosusu, motó ya likambo ya lisolo oyo elandaki, “Yehova azali ‘ebombamelo na biso na bantango ya mpasi’” elendisaki mpenza bayangani. Mabondeli, elimo santu mpe baninga na biso baklisto bakoki kosalisa biso na kolonga.

Lisukulu ya nsuka ya mokolo yango, “‘Mokili malamu’ emonisi mwa moke ndenge Paladiso ekozala,” esukaki na nsango moko ya esengo mpo na bayangani nyonso​—bayebisaki bango ete mokanda ya sika ebimi, oyo ezali kaka na bakarte ya Biblia! Motó ya likambo na yango ezali Voyez le bon pays.

Motó ya likambo ya mokolo ya mibale: “Bóyebisa nkembo na ye kati na bikólo”

Nsima ya kotánga mokapo ya mokolo, tolandaki masukulu-matongami ya mibale ya liyangani yango; motó ya likambo na yango ezalaki ete “Tóngɛngisa nkembo ya Yehova lokola talatala.” Eteni ya liboso ezalaki na motó ya likambo ete: “Tópalanganisa nsango malamu na bisika nyonso” mpe ezalaki na bilakiseli oyo emonisaki makambo oyo basakoli bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Ntango molobi ya mibale azalaki kosala eteni oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tósalisa baoyo miso na bango ezipami bámona,” akɔtisaki mpe elakiseli moko oyo emonisaki ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki. Eteni ya nsuka ezalaki na motó ya likambo ete “Tósala yango mingi koleka na mosala na biso ya kosakola” mpe molobi atunaki mwa basakoli oyo bayebisaki makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola.

Lisolo ya mibale ezalaki na motó ya likambo ete “Bayinami kaka mpamba.” Na lisolo yango, molobi atunaki mituna epai ya mwa bandeko ya sembo oyo, na nguya ya Nzambe, batikalaki sembo liboso ya botɛmɛli.

Likambo moko oyo bayangani bazalaki mpenza kozela ezali lisukulu ya batisimo oyo esalemaki liboso ete bakandida mpo na batisimo bázindisama mobimba na mai. Moto azwaka batisimo ya mai mpo na komonisa ete amipesi mobimba na Yehova. Yango wana motó ya likambo ya lisolo yango ebongaki mpenza: “Kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai na Nzambe epesaka ye nkembo.”

Nsima ya midi, programɛ ebandaki na lisukulu “Tózala na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene,” oyo elendisaki bayangani na komitalela. Molobi alobelaki likanisi ya ntina mingi oyo: Kozala na komikitisa lokola Yesu nde ekómisaka moto moto monene. Yango wana, moklisto asengeli te koluka mikumba mpo na kokokisa mposa na ye ya kokóma na lokumu. Asengeli komituna ete, ‘Nasepelaka kosalela bato misala oyo nakozwela yango lokumu te?’

Esí ekómelá yo ete olɛmba? Eyano na motuna yango ezali polele. Lisukulu “Tolɛmbi, kasi makasi esili te” esepelisaki mpenza bayangani nyonso. Mituna oyo batunaki Batatoli oyo baumeli mingi na mosala ya kosakola emonisaki ete Yehova akoki kokómisa biso “makasi . . . na lisalisi ya elimo na ye.”​—Baefese 3:16.

Tobotamaka na ezaleli ya kokaba te, esengeli tóyekola yango koyekola. Likanisi yango ya ntina elobelamaki na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Zalá lobɔkɔ pɛtɛɛ, moto ayebi kokaba.” Molobi atunaki motuna moko ya ntina mingi ete: “Tondimaka kolekisa mwa miniti elongo na bandeko oyo bazali mibange, oyo bazali na maladi, oyo bazali konyokwama na makanisi to oyo bazali bango moko?”

Lisukulu “Kebá na ‘mongongo ya bapaya’” ebendaki mpenza likebi ya bayangani. Lisukulu yango elobaki ete bayekoli ya Yesu bazali lokola bampate oyo bayokaka kaka mongongo ya “mobateli ya bampate oyo aleki malamu,” kasi bayokaka te “mongongo ya bapaya” oyo ezali kouta na banzela mingi oyo Zabolo azali kosalela.​—Yoane 10:5, 14, 27.

Mpo nzembo eyokana malamu, bayembi basengeli koyemba na bomoko. Mpo basambeli ya solo na mokili mobimba bápesa Nzambe nkembo, esengeli bázala na bomoko. Yango wana, lisukulu “Pesá Nzambe nkembo ‘na monɔkɔ kaka moko’” epesaki toli malamu oyo emonisaki ndenge oyo biso nyonso tokoki koloba “monɔkɔ ya pɛto” kaka moko mpe kosalela Yehova “na bomoko.”​—Sefania 3:9.

Baboti, mingimingi baoyo bazali na bana ya mike, basepelaki mpenza na lisukulu ya nsuka ya mokolo yango oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Bana na biso bazali libula moko ya motuya.” Buku moko ya sika ya nkasa 256 ebimaki na liyangani yango mpe esepelisaki mpenza bayangani. Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene ekosalisa baboti na koteya makambo ya elimo epai ya bana na bango, oyo bazali likabo oyo Nzambe apesi bango.

Motó ya likambo ya mokolo ya misato: “Bosalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe”

Programɛ ya mokolo ya nsuka ya liyangani yango ebandaki na makanisi ya elimo oyo eutaki na mokapo ya mokolo. Eteni ya liboso ya programɛ ya mokolo yango etalelaki mingi libota. Ebandaki na lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Baboti, bótonga mabota na bino.” Nsima ya kolobela mokumba oyo baboti bazali na yango ya koleisa mpe kolatisa bana na bango, molobi amonisaki ete mokumba ya libosoliboso ya baboti ezali ya koleisa bana na bango na elimo.

Molobi oyo alandaki alobaki na bana; motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki: “Ndenge oyo bilenge bazali kokumisa Yehova.” Alobaki ete bilenge bazali lokola “mamwɛ” mpamba te bazali ebele mpe molende na bango epesaka mpenza makasi. Mikóló basepelaka kosala elongo na bango na mosala ya Yehova. (Nzembo 110:3) Na lisolo yango batunaki mituna epai ya bilenge oyo bazali kopesa ndakisa ya malamu.

Na liyangani nyonso ya etúká, bato basepelaka mingi na drame, mpe ezalaki bongo na liyangani wana. Drame “Pesá litatoli na mpiko ata soki botɛmɛli ezali” elobelaki bayekoli ya liboso ya Yesu. Drame yango ezalaki kaka mpo na kosepelisa te, kasi ezalaki na mateya. Lisukulu oyo elandaki drame yango, “Sakolá nsango malamu ‘kozanga kotika,’” ezongelaki makambo ya ntina ya drame yango.

Bayangani nyonso bazalaki kozela likambo ya ntina mingi na programɛ ya mokolo ya lomingo: lisukulu ya bato nyonso oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Banani bazali kopesa Nzambe nkembo lelo oyo?” Molobi atángaki makambo oyo ezali komonisa polele ete bato ya siansi mpe bato ya mangomba bazali kopesa Nzambe nkembo te. Kaka bato oyo bazali komema nkombo ya Yehova, oyo bazali kosakola mpe koteya solo na ye, nde bazali mpenza kopesa ye nkembo lelo oyo.

Nsima ya lisukulu ya bato nyonso, bayangani balandaki lisolo mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisamaki mpo na pɔsɔ wana. Na nsima, balandaki lisukulu ya nsuka, oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “‘Kobá kobota mbuma mingi’ mpo na nkembo ya Yehova.” Molobi atángelaki bayangani nyonso ekateli oyo ezalaki na bapwɛ zomi mpo bándima yango. Ekateli yango etalelaki makambo ndenge na ndenge oyo tokoki kosala mpo na kopesa nkembo na Yehova, Mozalisi na biso. Na mayangani nyonso, bayangani bandimaki ete: “Ɛɛ.”

Na nsuka, motó ya likambo ya liyangani “Pesá Nzambe nkembo” etikalaki na makanisi ya moto mokomoko. Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova mpe ya ebongiseli na ye awa na mabelé, tiká tólukaka ntango nyonso kopesa Nzambe nkembo, kasi bato te.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 23]

Mayangani oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge

Mayangani ya bato ya mikili ndenge na ndenge, oyo eumelaki mikolo minei, esalemaki na Afrika, na Azia, na Australie, na Mpoto, na Amerika ya Nɔrdi mpe ya Sudi. Batatoli ya mikili ndenge na ndenge baponamaki mpo bákende na mayangani yango. Na ndenge yango, bandeko oyo bautaki na mikili mosusu mpe baoyo ya mikili epai mayangani yango esalemaki ‘balendisanaki.’ (Baloma 1:12) Baninga ya kala bakutanaki lisusu mpe bamosusu bazwaki baninga ya sika. Lisolo moko ya ntina mingi na mayangani yango ezalaki na motó ya likambo ete “Nsango ya bikólo mosusu.”

[Etanda/​Bililingi na lokasa 25]

Mikanda ya sika oyo ezali kopesa Nzambe nkembo

Mikanda mibale ya sika ebimaki na liyangani ya etúká “Pesá Nzambe nkembo.” Mokanda Voyez le bon pays ezali na ezipeli ya makasi mpe na nkasa 36 oyo ezali na bakarte mpe bafɔtɔ ya bisika oyo Biblia elobeli. Lokasa mokomoko ezali langilangi mpe ezali na bakarte ya Asulia, Babilone, Mede na Perse, Grèce, mpe Loma. Ezali na bakarte oyo emonisi mikili epai Yesu asakolaki mpe ndenge oyo Lingomba ya boklisto epalanganaki.

Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene ezali na nkasa 256 mpe na bililingi soki 230. Okoki kolekisa ntango malamu ná bana na yo mpo na kotala ná bango kaka mayemi mpe koyanola na mituna oyo ezali na kati ya buku yango. Mokanda yango ya sika ebimisami mpo na kokanga nzela na mayele mabe oyo Satana azali kosalela mpo na kobebisa makanisi mpe bizaleli ya bana na biso.

[Elilingi na lokasa 23]

Bamisionɛrɛ balobaki makambo oyo elendisaki kondima ya bayangani

[Bililingi na lokasa 24]

Batisimo ezalaki likambo ya ntina na liyangani ya etúká “Pesá Nzambe nkembo”

[Bililingi na lokasa 24]

Mikóló mpe bilenge basepelaka na drame

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto