Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/03 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 11/03 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda yango, bokoki kolakisa bango buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo to mokanda mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1988, soki ezali na libombo ya lisangá. Soki bozali na yango te, bótuna na masangá ya pembeni soki bazali na yango mingi mpo bápesa bino ndambo. Masangá oyo ezali na babuku ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu. Febwali: Approchez-vous de Jéhovah. Soki bozali na buku yango te, bokoki kolakisa babuku oyo: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? to Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Desɛmbɛ to mwa moke na nsima. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Masangá esengeli kobanda kosɛnga bavolimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ya mobu 2003 na komande na bango ya mikanda ya sanza oyo ekolanda. Lokasa “Avis aux congrégations,” oyo biro etindelaka masangá nyonso sanza na sanza, ekomonisa bino soki mikanda yango ekozala na minɔkɔ nini. Tokobomba komande yango tii ntango bavolimi relye yango ekokóma mpe tokotinda yango na masangá. Bavolimi relye ezali na kati ya mikanda oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.

◼ Soki bozali na likambo moko oyo bolingi koyebisa biro ya filiale nokinoki, bokoki kobenga na banimero ya telefone oyo: 98189791; (88) 43213; Fax: (88) 46944. Mpo na kobebisa mbongo mpambampamba te mpe mpo mosala etambola malamu, ekozala malamu masangá etindaka nde mikanda na biro kasi kobenga na telefone te. (Talá “Biyano na mituna na bino,” na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 1993.) Bokoki kosalela telefone mpo na kobenga biro kaka mpo na makambo oyo esengeli kotalelama nokinoki.

◼ Tolingi koyebisa bino ete na mokolo ya pɔsɔ, 29 Novɛmbɛ 2003 nsima ya midi, Betele ekoyamba bato te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto