Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/03 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Desɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 11/03 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Novɛmbɛ

Loyembo 212

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá bilakiseli mibale ya pɛtɛɛ oyo ekomonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo bapesi na lokasa 4 mpo na kolakisa na teritware na bino Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Novɛmbɛ.a Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka. Na elakiseli moko, bokolimbola mpe ndenge oyo tozwaka mbongo mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, lok. 2, to Lamuká! lok. 5.

Min. 15: “Bómilɛngɛla.”b Sɛngá na bayangani báyebisa nini esalisaka bango bátika nzela te na mitungisi oyo ezali na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe na makambo oyo bato balekisaka na yango ntango elya bango ntango oyo bakoki kosalela malamu koleka na makambo ya elimo.

Min. 20: Ndenge nini oponaka baninga na yo? Lisolo elongo na bayangani, ekouta na buku Tósambela Nzambe, nkasa 47-49. Salelá mituna oyo ezali na paragrafe 13 mpe bavɛrsɛ oyo batii na nsuka ya mituna yango mpe sɛngá na bayangani bálobela mitinda ya Biblia oyo tosengeli kotalela mpo na kopona baninga na biso.

Loyembo 127 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Novɛmbɛ

Loyembo 96

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Tuná basakoli mibale to misato oyo bakutanaki na bato oyo basepelaki ntango balakisaki bango mikanda oyo tozali kolakisa na sanza oyo. Ekoki kozala ete basakoli yango mosusu babandaki mpe koyekola Biblia na bato mosusu.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 18: “Kopesa moto longonya elendisaka ye.”c Lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Bolamu na libota, nkasa 49-50, paragrafe 21. Sɛngá na bayangani mosusu báloba na mokuse ndenge longonya oyo bato mosusu bapesaki bango elendisaki bango.

Loyembo 58 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Novɛmbɛ

Loyembo 213

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Salá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo bapesi na lokasa 4 mpo na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ.d Bokoki kosalela bavɛrsɛ mosusu na esika ya bavɛrsɛ oyo bapesi na lokasa 4. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka. Na elakiseli moko, bokomonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo na kati ya bisi to na esika mosusu oyo ebongi na teritware na bino.

Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko.

Min. 23: “Tókóma baninga ya Yehova.”e Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá na bayangani bámonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ. Yebisá mosakoli moko to basakoli mibale bámibongisa liboso mpo na koloba nini esalisi bango bábongisa lolenge oyo bayekolaka Biblia bango moko.

Loyembo 202 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 1 Desɛmbɛ

Loyembo 138

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Desɛmbɛ. Lobelá na mokuse likanisi moko to makanisi mibale oyo epesamaki mpo na kolakisa mikanda yango. Limbolá ndenge basakoli bakoki kosalela Index des publications de la Société Watch Tower mpo na kozwa makanisi mosusu mpo na kolakisa mikanda yango.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2001, lok. 2.

Min. 15: Loná elimo ya kokaba. Lisukulu oyo ekosalema na nkulutu moko, euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2003, nkasa 27-30. (Soki bozwi naino zulunalo yango te, bósalela lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Ezaleli ya kokaba epesaka esengo,” ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2000, nkasa 28-31).

Min. 20: Tozali bato oyo bakoki mpenza mpo na koteya basusu. Lisolo elongo na bayangani, euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 2000, nkasa 16-17, paragrafe 9-13. Kozala na likoki ya koteya malamu ezali mokano moko ya ntina mingi na mosala na biso ya kosakola. Mpo tósalisa malamu bato oyo bakokani na bampate, tosengeli kozala na likoki ya koyebisa nsango ya Bokonzi na ndenge oyo ezali koteya mpe kolendisa bango. Bótalela mituna oyo: (1) Na nini kosakola ekeseni na koteya? (it-2-F lok. 632 par. 4) (2) Mpo na nini basakoli mosusu bakakatanaka mpo na koluka koyekola Biblia na bato? (3) Ndenge nini tokoki kobongisa lolenge oyo toteyaka? (4) Ndenge nini tokoki koyeba ete moto oyo tozali koyekola na ye azali kokanga ntina ya makambo oyo azali koyekola? (5) Mokano nini tosengeli koluka kosalisa moto oyo toyekolaka na ye akokisa?

Loyembo 70 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto