Miziki oyo ekitisaka motema
1 Nzembo mpe miziki ezali na esika ya ntina mpenza na losambo ya solo. Na Yisalaele ya kala, Asafa ná bandeko na ye bayembaki boye: “Bótɔnda [Yehova, NW] . . . Bóyembela ye, bóyembela ye nzembo; bósololana mpo na misala na ye na kokamwa nyonso.” (1 Nta. 16:8, 9) Lelo oyo, totombolaka mingongo na biso mpo na koyembela Yehova na makita na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ. (Ef. 5:19) Yango ezali libaku ya malamu mpenza: kopesa lokumu na nkombo ya Yehova!—Nz. 69:30.
2 Soki tozali koyoka Mindule ya Bokonzi (Mélodie du Royaume), elingi koloba miziki ya banzembo ya Bokonzi, tokoki kotondisa makanisi na biso na makambo ya elimo. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Soki mindule ya Bokonzi ezali kobɛta, maloba ya banzembo yango eyelaka ngai na makanisi. Yango ezali mpenza lolenge ya malamu mpo na ngai ya kobatela Yehova na makanisi ntango nazali koyoka miziki!”—Filp. 4:8.
3 Ntango ya koyoka yango: Soki tozali na momeseno ya kobɛta Mindule ya Bokonzi na ndako, tokozala na esengo mpe na elimo moko oyo ekosala ete libota mobimba ezala na kimya. Libota moko bakomaki boye: “Tobɛtaka [miziki] yango ntango nyonso na ndako mpe na motuka na biso, mpe tolɛmbaka yango te mpo babɛtá yango malamu mpenza. Mbala mingi Mindule ya Bokonzi epesaka biso esengo mpe kimya ntango tozali komibongisa mpo na kokende na makita to na liyangani.” Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Nasepelaka mingi soki nazali koyoka yango ntango nazali kosala misala ya ndako—nani akoki kondima ete nazalaka na esengo ndenge wana ntango nazali kogumba bilamba! Nayokaka mpe miziki yango soki nazali komiyoka mawamawa. Miziki yango ebɔndisaka mpenza! . . . Banzembo yango nyonso epesaka kaka esengo.” Ezali na mabaku oyo miziki oyo ekitisaka motema ndenge wana ekoki kopesa yo litomba?
4 Miziki mingi ya lelo emonisaka elimo ya mokili. Baboti bakoki kosalisa bana na bango bálona mposa ya koyokaka miziki ya malamu soki bazali kosalela malamu mindule ya Bokonzi. Bato mingi oyo bayekolaka Biblia mpe baoyo basepelaka na nsango malamu bakosepela koyeba banzembo kitoko wana ya elimo, oyo epesaka Yehova nkembo mpe elendisaka elimo.—Nz. 47:1, 2, 6, 7.