Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/04 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Yuni
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 5/04 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Mai

Loyembo 193

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Soki makanisi oyo bapesi na lokasa 4 ebongi na teritware na bino, salelá yango mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai mpe Lamuká! ya 22 Mai.a Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli mokomoko, monisá ndenge ya kopesa eyano soki moto alobi ete “Nazali na lingomba na ngai.”​—Talá buku Comment raisonner, nkasa 18-19, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nkasa 10-11.

Min. 15: Osili koyebisa patrɔ na yo? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Ekosalema na nkulutu moko, na lisolo “Yo mpe okozala wana,” oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2000, lokasa 1. Lobelá mpe makambo oyo ezali na buku Eteyelo ya Mosala na lokasa 67.

Min. 20: ‘Tófungwama.’b Lobelá mpe makambo oyo ezali na buku Tósambela Nzambe na lokasa 150, paragrafe 14.

Loyembo 18 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Mai

Loyembo 188

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Monisá ete ozali na botɔndi.”c Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango wana te. Ntango bokolobela paragrafe 3, sɛngá ndeko moko to bandeko mibale oyo bautaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi bálobela mapamboli oyo bazwaki na mosala yango.

Min. 20: Tomibanzabanzaka mpo na moko na moko na biso. (1 Kol. 12:25, 26) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Lisanga, na nkasa 157-159, na motó ya likambo moke “Tómibanza-banza bamoko mpo na bamosusu.” Biso Batatoli ya Yehova tozali na bomoko atako topanzani na mokili mobimba. Biso nyonso tosengeli kobondelaka mikolo nyonso mpo na bandeko na biso. Tokakatanaka te mpo na kosalisa bandeko na biso soki esengeli. Tángá mpe sengá bayangani bálobela bavɛrsɛ ya ntina, mpe lobelá ndakisa moko to bandakisa mibale ya makambo yango oyo ezali na mikanda na biso.

Loyembo 100 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Mai

Loyembo 128

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Monisá ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe Lamuká! ya 8 Yuni.d Na elakiseli mokomoko, monisá ndenge ya kosolola na moto moko ya lingomba moko ya teritware na bino.

Min. 15: “Miziki oyo ekitisaka motema.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Annuaire 2002, lokasa 175, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1997, lokasa 27, paragrafe 1-2.

Min. 18: Mibongisá mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2003, lokasa 3. Sɛngá mwa ndambo ya basakoli bamibongisa mpo bálobela makambo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu. Monisá na mokuse ndenge ya kosalela trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe mwa buku Sango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso, ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu.

Loyembo 211 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 31 Mai

Loyembo 26

Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai.

Min. 17: Bomoi​—Likabo ya motuya mpenza. Lisolo elongo na bayangani, ekouta na buku Comment raisonner, nkasa 39-41. Lobelá mpe makambo oyo ezali na Lamuká! ya 22 Mai 1993 (na Lifalanse), nkasa 10-11. Ndenge nini okoki komonisa likanisi ya Yehova na likambo etali kosopa zemi epai ya moto oyo akanisi ete mwasi azali na lotomo ya kozwa bikateli mpo na nzoto na ye moko? Lobelá lisolo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2000, lokasa 4, paragrafe 4-5.

Min. 20: “Ndenge ya kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.” Tokolakisa buku yango na sanza ya Yuni. Lobelá ndenge ya kolakisa yango, ndenge emonisami na lokasa 7, paragrafe 1-3. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo esepelisi bango na buku yango. Lobelá makanisi oyo bapesi mpo na kolakisa buku yango. Monisá ndenge ya kosalela bililingi ntango tozali kolakisa yango. Sɛngá elenge moko asala elakiseli ya liboso mpe mokóló moko asala moko na bilakiseli oyo etikali. Soki ndenge mosusu ya kolakisa buku yango ebongi na teritware na bino, lobelá yango mpe elakiseli ya mibale ekomonisa yango.

Loyembo 24 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 7 Yuni

Loyembo 136

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina ya lisolo “Lolenge moko ya kosalisa bango.” Tángá minɔkɔ mosusu oyo elobamaka na teritware na bino.

Min. 15: Tóyemba malamu mpo na kokumisa Yehova. Nkulutu moko akotánga mokanda ya biro ya 1 Febwali 2004 mpe akosala yango lisolo elongo na bayangani.

Min. 20: Salelá bandakisa oyo ebongi ntango ozali koteya. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 2002, nkasa 22-24. Makambo nini minei esalaka ete ndakisa ezala mpenza malamu? Mpo na nini ezali na ntina tóluka bandakisa ya pɛtɛɛ? Epai wapi tokoki kozwa bandakisa oyo ebongi? Lobelá mwa bandakisa mosusu oyo ezali na etanda ya lokasa 23, mpe monisá makambo oyo esalaka ete ndakisa ezala malamu.

Loyembo 133 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto