Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/04 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Desɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 11/04 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Novɛmbɛ

Loyembo 180

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Kampanye ya monene mpo na kokabola mwa buku Bókɛngɛlaka! ekosuka na mwa 14 Novɛmbɛ. Na mikolo ya sanza ya Novɛmbɛ oyo ekotikala, tokolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Lobelá na mokuse makanisi oyo bapesi na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2004, lokasa 3 mpo na ndenge ya kolakisa buku yango.

Min. 15: Tózwa matomba na Likita ya mosala. Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Lisanga, nkasa 72-74. Na makambo nini mitano Likita ya mosala esalisaka biso tókóma baministre baklisto oyo babongi? Zwá bandakisa na programɛ ya Likita ya mosala ya sanza oyo. Komibongisa liboso ezalaka na matomba nini? Mpo na nini koyangana na likita yango pɔsɔ na pɔsɔ? Bavɛrsɛ nini emonisi ete likita yango ezalaki mpe kosalema na ntango ya kala?

Min. 20: “Tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga!”a Kɔtisá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2000, nkasa 12-13.

Loyembo 19 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Novɛmbɛ

Loyembo 170

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Soki makanisi oyo bapesi na lokasa 4 ebongi na teritware ya lisangá na bino, salelá yango mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Novɛmbɛ. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango.

Min. 15: Oyokaka esengo ya kopesa? Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2004, nkasa 19-23.

Min. 20: Salelá mwa buku ya sika mpo na kosalisa bato oyo basepelaki. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Tosengeli kozonga kosalisa bato nyonso oyo bazwaki mwa buku Bókɛngɛlaka! Salelá etanda ya makambo oyo ezali na lokasa 2, mpo na kolobela na mokuse makambo oyo ezali na kati ya mwa buku yango, bendá likebi na mitó ya makambo ya moke (oyo ezali na nse ya mitó ya makambo oyo ezali na makomi ya moindo). Tokoki kosalela makambo yango ntango tozongeli moto oyo asepelaki mpo na kosolola moke na makambo oyo tolobelaki mbala eleki. Na ndakisa, soki na mbala ya liboso tolobelaki makambo oyo ezali na lokasa 3-4, ntango tokozongela moto yango tokoki kolobela etanda oyo ezali na lokasa 5 na eteni oyo elobi, “Nzambe atyelaka biso mpenza likebi?” Lobelá ndenge bokoki kosalela likanisi yango. Talelá mpe bitanda mosusu lokola oyo ezali na nkasa 6-8 mpe 17-18 to bitanda mosusu oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino. Salelá etanda moko mpo na kosala elakiseli moko ya bozongeli ya sika. Esengeli kotánga mpe kolobela vɛrsɛ moko to bavɛrsɛ mingi oyo batii maloba na yango na lisolo te. Mpo na kosukisa, mosakoli akobenda likebi ya moto yango na eteni mosusu oyo bakotalela mbala ekoya.

Loyembo 66 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Novɛmbɛ

Loyembo 199

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Tóbanda koyekola Biblia na bato oyo bazwaki mwa buku ya sika. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá na mokuse elakiseli ya bozongeli ya sika oyo esalemaki na Likita ya mosala ya pɔsɔ eleki, mingimingi bendá likebi na etanda oyo balobelaki na nsuka ya bozongeli yango. Sɛngá basakoli oyo basalaki elakiseli yango (soki likoki ezali) básalela makanisi wana mpo na kosala elakiseli ya bozongeli ya mbala oyo. Na nsima, mosakoli akosalela ezipeli ya nsuka ya mwa buku mpo na kolendisa moto yango ayekola Biblia, mpe bakozwa bibongiseli mpo na kotalela liteya ya liboso ya mwa buku Azali kosɛnga ntango akozongela ye. Lɛndisá basakoli nyonso básala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato oyo bakondima kozwa mwa buku Bókɛngɛlaka!

Loyembo 58 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Novɛmbɛ

Loyembo 23

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya Novɛmbɛ. Monisá ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ.

Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko.

Min. 25: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola​—⁠Eteni 3.”b Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Nsima ya kolobela paragrafe 3, salá elakiseli ya mokuse ya boyekoli ya Biblia na mwa buku Azali kosɛnga, liteya 5 paragrafe 1. Basali lokola basilisi kotánga paragrafe mpe koyanola na motuna. Mosakoli mpe moyekoli batángi mpe balobeli Yisaya 45:18 ná Mosakoli 1:⁠4. Mosakoli atuni moyekoli mwa mituna ya pɛtɛɛ mpo na kosalisa ye alimbola ndenge vɛrsɛ mokomoko oyo batángi eyokani na likambo oyo bazali kotalela.

Loyembo 178 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 6 Desɛmbɛ

Loyembo 96

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo bokoki kosalela mpo na kolakisa buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

Min. 20: “Okoki kosalisa bato mosusu?”c Tuná mituna na mosakoli moko to basakoli mibale oyo basepelaki na ndenge bandeko mosusu basalisaki bango to balendisaki bango.

Min. 15: Makambo oyo basakoli ya lisangá bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bazongelaki bato oyo bazwaki mwa buku Bókɛngɛlaka! Bongisá liboso bilakiseli ya makambo yango ndenge elekaki. Pesá basakoli nyonso longonya ndenge bapesaki mabɔkɔ na kampanye wana ya monene.

Loyembo 101 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto