Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/05 lok. 1
  • Saláká malamu mpe kabeláká basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Saláká malamu mpe kabeláká basusu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Tókoba kolendisana
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • “Bózala mabɔkɔ makasi te, bókabelaka bato mosusu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • ‘Tóbɔndisa baoyo bazali kolela’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 4/05 lok. 1

Saláká malamu mpe kabeláká basusu

1 Dolokasi “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa.” (Mis. 9:​36, 39) Lokola azalaki kokaba mingi, bato oyo bayebaki ye balingaki ye mingi mpe Yehova Nzambe alingaki ye. Baebele 13:16 elobi ete: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” Ndenge nini tokoki kosala malamu mpe kokabela basusu lelo oyo?

2 Lolenge moko ya kosalisa basusu ezali ya kokabela bango “biloko ya motuya” oyo tozali na yango. (Mas. 3: 9, NW) Makabo oyo topesaka mpo na kosunga mosala na biso na mokili mobimba esalaka ete Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, mpe Babetele etongama na mokili mobimba. Bokabi na biso esalisi bamilio ya bato bálanda mateya ya Teokrasi mpe bálendisama na elimo epai ya bandeko mosusu.

3 Bɔndisáká basusu: Ntango likama moko ebimi, basaleli ya Yehova basalaka “oyo ezali malamu” epai ya bandeko na bango bandimi mpe epai na bato oyo bazali na bango lingomba moko te. (Gal. 6:10) Ntango izini moko oyo esalaka bankisi ezikaki na France, mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki kofanda pene na izini yango balobaki boye: “Bandeko na biso baklisto bayaki nokinoki kosalisa biso na kokɔmbɔla ndako na biso mpe ata bandako mosusu ya buludingi yango. Bato oyo bafandaka pembeni na biso bakamwaki ntango bamonaki ebele ya bato oyo bayaki kosalisa biso.” Ndeko mwasi mosusu alobaki boye: “Bankulutu batikaki biso moko te. Bayaki kolendisa biso. Kutu, lisalisi wana ya elimo nde tosengelaki na yango mingi, koleka biloko oyo bapesaki biso.”

4 Atako ezali na ndenge mingi oyo tokoki kosala malamu epai ya bato ya kartye na biso, ndenge ya malamu koleka ya kosalisa bango ezali ya kopesa bango boyebi ya solo oyo ezali na motuya mingi, yango esangisi ‘elikya ya bomoi ya seko’ oyo Yehova ye moko asili kolaka. (Tito 1:​1, 2) Nsango ya Biblia ebɔndisaka mpenza baoyo bazali na mawa mpo na makambo oyo ezali kobima na mokili mpe mpo na ezaleli na bango ya bato ya masumu. (Mat. 5:⁠4) Tiká ete tósalaka malamu mpe tókabelaka basusu, ntango nyonso oyo lobɔkɔ na biso ezwi likoki ya kosala yango.​—⁠Mas. 3:⁠27.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto