Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/05 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Mai
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 4/05 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Liyebisi: Na sanza ya Yuli, ya Augusto mpe ya Sɛtɛmbɛ, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya Likita ya Mosala kaka ndenge ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe.” Soki yango ebongi, na Likita ya Mosala oyo bokosala liboso bókende na liyangani, bósalela miniti 15 mpo na kolobela toli ya siplema ya sanza oyo ya Aprili, oyo etali mpenza bino. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, bózwa miniti 15 to 20 na Likita ya Mosala (mbala mosusu na lisolo oyo esengeli kotalela bamposa ya lisangá) mpo na kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola. Lisolo yango ya ntina mingi oyo ekosalema na Likita ya Mosala, ekopesa biso libaku ya kolimbola ndenge oyo tozali kosalela makambo oyo toyokaki na liyangani mpe ndenge yango esalisi biso tóbongisa mosala na biso ya kosakola.

Pɔsɔ ebandi na 11 Aprili

Loyembo 4

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili mpe Lamuká! ya 22 Aprili. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli moko, mosakoli akopesa litatoli na balabala.

Min. 15: “Kobá kosakola.”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te.

Min. 15: “Saláká malamu mpe kabeláká basusu.”b Lobelá ndenge ya kosalela makambo yango na lisangá na bino, monisá ndenge mpenza oyo tokoki kosalisa basusu.

Loyembo 47 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Aprili

Loyembo 76

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 20: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola​—⁠Eteni 8.”c Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali kopesa moyekoli ya Biblia ya sika mwa buku Batatoli ya Yehova​—⁠Bazali banani? Makambo nini bandimaka? Mosakoli akobenda likebi ya moyekoli na elilingi oyo ezali na lokasa 20 ya mwa buku yango, mpe akolobela na mokuse Lisukulu ya bato nyonso. Akoyebisa moto yango motó ya likambo ya lisukulu ya bato nyonso ya pɔsɔ elandi mpe akobengisa ye na lisukulu yango.

Min. 15: Tózala na makanisi malamu na ntango oyo bato bakómi kosalela ordinatɛrɛ mingi. (Tito 2:​11, 12) Lisukulu ekouta na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2002, lokasa 8, paragrafe 1-7; mpe na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1999, lokasa 5, paragrafe 24-26, mpe lokasa 6, paragrafe 35-36. Soki ngonga ezali, bokoki mpe kotalela makanisi mosusu oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1999, soki ebongi na lisangá na bino.

Loyembo 169 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Aprili

Loyembo 111

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe Lamuká! ya 8 Mai. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli moko, monisá lolenge ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nasepelaka na yango te [Ça ne m’intéresse pas].” (Talá buku Comment raisonner, lok. 16, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, lok. 8.) Lobelá masolo oyo ekobonga mpenza na bato ya teritware na bino.

Min. 30: “Sanzolá Yehova na kati ya koyangana monene.”d Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Yebisá esika oyo lisangá na bino ekokende na liyangani. Bokotalela baparagrafe oyo ezali na banimero ndenge toyekolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Poná ndeko moko ya makoki mpo atánga baparagrafe. Lobelá etanda “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká.”

Loyembo 8 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Mai

Loyembo 148

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse lisolo “Tóyekola mwa buku Bókɛngɛlaka!” oyo ezali na lokasa 6. Monisá ete lisolo yango ezali programɛ ya boyekoli ya mwa buku wana. Sɛngá bayangani bábongisaka mpe báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na boyekoli yango, oyo ekobanda na pɔsɔ ya 23 Mai.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Bato ya ndenge nyonso bakobika.”e Lobelá ndenge ya kosalela makambo yango na teritware ya lisangá na bino.

Loyembo 112 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto