“Bózala mabɔkɔ makasi te, bókabelaka bato mosusu”
1 Esili koleka bikeke mingi, ntoma Paulo ayebisaki Timote alendisa baninga na ye bandimi ete “básala malamu, bázala bazwi na misala malamu, bázala mabɔkɔ makasi te, bákabelaka bato mosusu.” (1 Tim. 6:18, NW ) Paulo abendaki mpe lisusu likebi ya baklisto Baebele ete bábosana te “kosala oyo ezali malamu mpe kokabela bamosusu.” (Ebe. 13:16, NW ) Mpo na nini akomaki malako oyo? Mpamba te ayebaki ete ‘moto na moto oyo azali kosala malamu akozwa nkembo mpe lokumu mpe kimya.’—Lom. 2:10, NW.
2 Lokola Yehova Nzambe nde akelaki biloko nyonso, boye biloko nyonso ezali ya ye. (Emon. 4:11) Tosepelaka mpenza na ndenge asalelaka biloko na ye mpo na kosala makambo oyo ezali mpo na bolamu na biso. Atako bato mingi bamonisaka botɔndi te epai na ye, Oyo-Aleki-Likoló azali ntango nyonso kopesa nzela na bato nyonso ete bázwa matomba na bibongiseli na ye ya boboto mpo na kobatela bomoi na biso. (Mat. 5:45) Kutu, apesaki Mwana na ye ya bolingo lokola mbeka mpo ete tókoka kozwa bomoi ya seko. Bolingo oyo bamonisi epai na biso esengeli kotinda biso ete tómonisa botɔndi na biso mpe tókabelaka bato mosusu, boye te?—2 Kol. 5:14, 15.
3 Eloko nini tokoki kokabela bato mosusu? Ezali mpenza malamu ete tósalela eloko nyonso ya motuya oyo tozali na yango na ndenge oyo ekosepelisa Nzambe. Na ntembe te tolingaka kosimba mosala ya Bokonzi oyo ezali kosalema na mokili mobimba na makabo na biso ya elimo mpe ya mosuni. Ya solo, nsango malamu ezali eloko oyo ezali na motuya mingi koleka biloko nyonso oyo moto akoki kozala na yango, mpamba te ezali “nguya ya Nzambe mpo na lobiko.” (Lom. 1:16, NW ) Soki tozali komonisa lobɔkɔ makasi te mpo na kosalela ntango na biso mpe biloko na biso sanza na sanza mpo na mosala ya kosakola mpe ya koteya bato, yango ekopesa biso nzela ya kokabela mpe bato mosusu eloko oyo ezali na motuya na elimo, yango ekopesa bango nzela ya kozwa bomoi ya seko.
4 Yehova asepelaka mingi ntango tozali kosalisa bato oyo bazali babola. Alaki biso ete akopesa biso mapamboli mpo na yango, mpe azali koyebisa biso lisusu ete: “Bozwi ekosunga na mokolo na nkanda te nde boyengebene ekobikisa moto kati na kufa.” (Mas. 11:4; 19:17) Kosimba mosala ya Bokonzi na makabo na biso ya mosuni mpe kosakola nsango malamu mingi ezali lolenge moko malamu oyo tokoki komonisa ete tozali mpenza na lobɔkɔ makasi te, tolingi kokabela bato mosusu.