Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa buku Bolamu na libota to buku Boyebi. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Une vie pleinement satisfaisante: Comment? Sɛtɛmbɛ: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
◼ Esengeli kotya buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova na bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi. Bokoki komona makambo mosusu oyo etali bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2003, lokasa 5, mpe na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1997, na Biyano na mituna na bino.
◼ Soki mposa ezali, masangá ekoki kotindaka formilɛrɛ Demande de publications (S-14) sanza nyonso. Ezali lisusu na ntina te bázela tii bakotindela bango mikanda oyo basɛngaki mpo na kosala komande mosusu. Nzokande, mokomeli ya lisangá asengeli kobatela bakomande nyonso oyo bandeko bakosala mpo básɛnga lisusu te biloko oyo basɛngaki na mbala eleki, longola kaka soki basengeli kobakisa komande na bango ya mikanda.