Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 13 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni mpe Lamuká! ya 22 Yuni. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli moko, mosakoli akolakisa zulunalo epai ya moto moko na litatoli ya libaku malamu.
Min. 15: Salisá basusu bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko, ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 79-81 (od). Lobelá makambo oyo esengeli kotalela mpo na koyeba soki moyekoli ya Biblia akokisi masɛngami mpo na kosakola elongo na lisangá. Na pɔsɔ ekoya, tokotalela ndenge oyo tokoki kopesa bayekoli ya Biblia oyo bakokisi masɛngami formasyo mpo bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te, mpe bábanda kosakola ndako na ndako.
Min. 20: “Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka voti?” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko, na makambo oyo ezali na siplema. (Talá mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1999, nkasa 28-29.) Salisá bayangani bákanga ntina ya mitinda mitano ya Biblia oyo elobelami na lisolo yango.
Loyembo 149 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 20 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina ya lisolo oyo ezali na lokasa 4 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 2003. Limbolá ndenge oyo basakoli bakoki kozwa mikanda oyo ezali na minɔkɔ ya bapaya. Lobelá ndenge ya kosalela makanisi yango na teritware ya lisangá na bino. Esengeli kopesa bakomande nyonso oyo bandeko bazali kosala mpo na kosɛnga mikanda oyo ezali na minɔkɔ ya bapaya epai ya ndeko oyo atalelaka makambo ya mikanda na lisangá, ata soki ezali komande ya mokanda moko kaka, mpo bázwa nokinoki mikanda oyo basɛngi.
Min. 15: Liloba ya Nzambe ezali na nguya. (Ebe. 4:12) Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2003, lokasa 11, paragrafe 13-17. Lobelá makambo oyo bandeko bakutanaki na yango oyo emonisi ete mateya ya Biblia ekoki kobongola bomoi ya moto. (w00 1/1 nk. 3-5) Lendisá basakoli nyonso básalelaka Biblia malamu mbala nyonso oyo bazali kosakola.
Min. 20: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 10.”a Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge mosakoli ná moyekoli bazali komekameka maloba ya kobanda lisolo. Ntango moyekoli azali komekameka lisolo yango, mosakoli, oyo akosala lokola moto oyo bakokende kosolola na ye, alobeli likambo moko oyo bato mingi ya teritware na bango balobaka mpo na kosukisa Batatoli. Moyekoli asali lokola azangi likambo ya koloba, kasi mosakoli alimboleli ye oyo akoki kosala. Lisusu, sololá na mosakoli moko to basakoli mibale liboso mpo bálobela ndenge oyo basalisaki bango ntango babandaki kosakola ndako na ndako.
Loyembo 208 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 27 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya 8 Yuli. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na nsima ya elakiseli, zongelá maloba ya ebandeli oyo mosakoli asalelaki mpo na kolamusa mposa ya moto oyo basololaki na ye.
Min. 15: “Mosala ya kosakola esalisaka biso tóyika mpiko.”b Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te.
Min. 20: Tólakisa mwa babuku na sanza ya Yuli mpe ya Augusto—Eteni 1. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na siplema. Limbolá na mokuse ndenge ya kosalela siplema yango, lobelá etanda ya lokasa 3 mpe makanisi ya ntina oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, na lokasa 8. Lobelá makanisi oyo bapesi mpo na kobanda lisolo, oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino, mpo na kolakisa mwa babuku na mbala ya liboso oyo okutani na moto. Bongisá bilakiseli mibale to misato. Ekozala malamu mosakoli moko ya elenge asala elakiseli moko.
Loyembo 196 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Biyano na mituna na bino.
Min. 15: Bozali kozwa matomba na programɛ ya libota? Lobelá makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2005, mpe sɛngá bayangani bálobela milende oyo basalaki mpo na kosalela makanisi yango mpe matomba oyo bazwi ndenge basaleli yango.
Min. 20: “Ndenge ya kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingi.”c Monisá ndenge ya kosalela makambo yango na teritware ya lisangá na bino. Yebisá basakoli bábosana te kosalela formilɛrɛ Intérêt à suivre dans une langue étrangère (S-70a), soki esengeli.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2005, lok. 6.
Loyembo 120 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.