Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 14 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai mpe Lamuká! ya Mai.
Min. 20: Makabo mpo na kosimba mosala ya bokonzi na mboka na biso mpe na mokili mobimba. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 12.
Min. 15: “Apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi.”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.
Loyembo 1 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Biyano na mituna na bino.
Min. 15: Okoki koyekola monɔkɔ mosusu! Lisukulu ekouta na Lamuká! ya Marsi 2007, nkasa 10-12 (na Lifalanse). Monisá ntina ya koyekola monɔkɔ mosusu, na mokano ya koyebisa bato mingi nsango malamu.
Min. 20: “Okɔtelaka Liloba ya Nzambe?”b Lobelá mpe bitanda oyo ezali na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 143-144.
Loyembo 202 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe Lamuká! ya Yuni.
Min. 20: Tokolakisa buku Créateur to buku Bolamu na libota na Yuni. Lobelá ndambo ya makambo oyo ebongi mpenza, oyo ezali na babuku yango, mpe salelá maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa mokomoko ya babuku yango. Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwi ndenge basalelaki babuku yango mpo na kopesa litatoli epai ya baninga to bandeko na bango.
Min. 15: Makambo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Lobelá makambo ya kolendisa oyo babongisi-nzela basungi mpe bandeko mosusu oyo basakolaki mingi na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai, bakutanaki na yango. Lobelá mpe makambo ya kolendisa oyo bandeko bakutanaki na yango ntango bazongelaki bato oyo bazwaki bazulunalo mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Bokoki kosala elakiseli moko to mibale ya makambo yango ndenge elekaki.
Loyembo 21 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Teyá bana na yo básanzola Yehova.”c Ntango bokotalela paragrafe 4, lobelá mpe makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 2005, lokasa 3.
Loyembo 169 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.