Mosala ya kosakola esalisaka biso tózala makasi na elimo
1. Matomba nini mosala ya kosakola ememelaka biso?
1 Kosakola na molende ekoki kosalisa biso tózala makasi na elimo mpe kobakisa esengo na biso. Ya solo, tosakolaka libosoliboso mpo na kosepelisa Yehova. Nzokande, soki totosi etinda ya “kosakola liloba,” Yehova akopambola biso mpe tokozwa matomba mosusu. (2 Tim. 4:2; Yis. 48:17, 18) Kasi, ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kokómisa biso makasi na elimo mpe kopesa biso esengo?
2. Na ndenge nini mosala ya kosakola ekómisaka biso makasi na elimo?
2 Tolendisamaka mpe tozwaka mapamboli: Mosala ya kosakola esalisaka biso tótya makanisi nde na mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela biso, na esika ya kotya yango na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo. (2 Kol. 4:18) Ntango tolimbolaka mateya ya Biblia, kondima na biso na bilaka ya Yehova ekómaka makasi mpe tókómaka na botɔndi mingi mpo na mateya ya solo. (Yis. 65:13, 14) Ntango tosalisaka basusu bákola na elimo mpo bázala “bato ya mokili te,” tolendisaka mpe ekateli na biso ya kokabwana na mokili.—Yoa. 17:14, 16; Lom. 12:2.
3. Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka biso tólona bizaleli ya boklisto?
3 Kosakola esalisaka biso tókolisa bizaleli ya boklisto. Na ndakisa, ntango tosalaka makasi ‘tókóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso,’ yango esalisaka biso tókóma na komikitisa mingi. (1 Kol. 9:19-23) Ntango tosololaka na bato oyo ‘batikami mpamba mpe bapalanganisami lokola bampate ezangá mobateli,’ tokómaka koyokela bango mawa mpe tomityaka na esika na bango. (Mat. 9:36) Ntango tosakolaka ata soki bato mosusu bazali kosepela te to bazali kotɛmɛla biso, tokómaka na ezaleli ya koyika mpiko. Esengo na biso ebakisamaka ntango tomipesaka mpo na kosalisa basusu.—Mis. 20:35.
4. Ndenge nini otalelaka mosala na yo ya kosakola?
4 Ezali mpenza lipamboli kosala mosala ya kosakola, oyo epesaka masanzoli na Moto oyo abongi tósambela ye! Mosala ya kosakola ekómisaka biso makasi na elimo. Epesaka mapamboli na baoyo bamipesi mpo na “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.”—Mis. 20:24.