Manaka mpo na Pɔsɔ ya 19 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 19 ƆKƆTƆBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 3 par. 8-15, etanda na lok. 30
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 7-10
No. 1: Kolimbola Mibeko 9:1-14
No. 2: Ntina oyo tosengeli kolinga Yesu (lr mok. 38)
No. 3: Biblia elobeli elikya ya likoló mpo na bato boni? (rs-F lok. 66 par. 1-2)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Kolukaluka na mikanda ekoki kosalisa biso tóyeba makambo malamu. Lisukulu ekouta na buku Eteyelo ya Mosala, lokasa 33 tii na motó ya likambo moke na lokasa 34. Ntango ozali kosala lisolo yango, lobá lokola mosakoli oyo azali kolendisa moyekoli ya Biblia mpe kolakisa ye ndenge ya kolukaluka na mikanda mpo na kolendisa kondima na ye mpe komibongisa mpo na mosala ya kosakola. Bongisá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge mosakoli akoki kosalisa moyekoli ya Biblia amona ntina ya kolukaluka na mikanda.
Min. 15: “Kopesa litatoli na telefone ekoki kobota mbuma malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Sɛngá basakoli mibale básala bilakiseli oyo mokomoko akolakisa mokanda oyo tozali kokabola sanza oyo. Liyebisi: Soki mboka na bino ezali na mibeko na ndenge ya kosalela telefone mpo na kosakola, esengeli kotalela makanisi yango.