Kopesa litatoli na telefone ekoki kobota mbuma malamu
1. Mpo na nini tokoki koloba ete kopesa litatoli na telefone ezali na ntina mingi?
1 Mpo na nini tosengeli mpe kokanisa kosalela telefone mpo na kopesa litatoli? Mpamba te yango ezali mayele mosusu oyo tokoki kosalisa na yango bato mpo bázwa bayebi ya sikisiki oyo ekomema bango na lobiko. (2 Pe. 3:9) Atako mosala ya ndako na ndako ezali lolenge ya libosoliboso oyo tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, tosepelaka mpe kosalela mayele mosusu mpo na kokutana na bato oyo, ntango mosusu, tokutaka bango te na bandako na bango.—Mat. 24:14; Luka 10:1-7; Em. 14:6.
2. Ndenge nini mosala ya kopesa litatoli na telefone ebongisami?
2 Ndenge mosala yango ebongisami: Ndenge bapesaka basakoli teritware mpo na kosakola ndako na ndako, bapesaka mpe teritware mpo na kopesa litatoli na telefone. Mpo na kopesa litatoli na telefone, moto akoki kozala ye moko to bakoki kozala mibale to misato. Mpo na kopesa litatoli na telefone, esengeli kozala na esika ya makɛlɛlɛ te. Basakoli mingi bamonaka malamu kofanda na mesa oyo ezali na mikanda nyonso oyo tozalaka na yango na mosala ya ndako na ndako.
3. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopesa litatoli na telefone?
3 Ndenge ya kopesa litatoli na telefone: Ntango tozali kopesa litatoli na telefone, tosengeli koloba na moto lokola nde tozali kosolola na ye. Basakoli oyo babandi sika kopesa litatoli na telefone bakoki kotánga makambo oyo bazali koloba na moto, kasi basengeli kosala yango lokola nde bazali kosolola. Maloba ya kobanda lisolo oyo ezali na buku Comment raisonner, oyo ezalaka na Mosala na biso ya Bokonzi, mpe na trakte Okosepela koyeba solo? ekoki kosalisa mingi na likambo yango. Ntango ozali kopesa moto litatoli, monisá polele likambo oyo oponi kolobela, tuná motuna, mpe kobosana te kotángela ye vɛrsɛ moko to mibale oyo epesi eyano na motuna yango. Mbala mingi, osengeli kolobela mikanda oyo tozali kokabola na mosala ya ndako na ndako na sanza yango. Tyá likebi na makambo oyo: Kozala motema likolólikoló te, koloba mpe mbangumbangu te. Zalá na bonkonde, na motema molai, mpe na boboto, mpamba te bizaleli yango emonanaka ata soki moto azali kosolola na telefone. Yokáká malamu ntango moto azali komonisa makanisi na ye, na nsima, pesá ye longonya mpe matɔndi mpo na makanisi oyo abimisi. Koyebisa moto yango te ete akoki kopesa likabo soki azwi mokanda, mpamba te akoki kokanisa ete tozali nde kosalela telefone mpo na kosɛnga mabonza.
4. Kopesa litatoli na telefone ekoki kosalisa biso tósala nini na teritware na biso?
4 Moto oyo osololi na ye na telefone akoki kozala moto oyo akɔtá ndako to moto oyo mosala na ye epesaka nzela te tókutana na ye na mosala ya ndako na ndako. Ezali mpe na bato oyo bafandaka na mapango oyo batyá basinzili mpe bapaya bakoki kokɔta te kozanga ndingisa to na bandako ya etaje oyo bisika ya kokɔtela ekangamaka na fungola. Yango wana, mpo na kokokisa malamumalamu mosala na biso, tóbosana te kopesa litatoli na telefone.