Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/09 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 10/09 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 Ɔkɔtɔbɛ 2009.

1. Lokola Yehova ye moko ayebisaki Balama akende na bato ya Balaka, mpo na nini asilikelaki Balama ntango akendaki na bango? (Mit. 22:20-22) [w04 1/8 lok. 27 par. 2]

2. Ndenge Finehase ‘atikaki nzela ata moke te básalela Yehova bombanda’ ezali kosalisa biso tótalela komipesa na biso ndenge nini? (Mit. 25:11, NW) [w95 1/3 lok. 16 par. 13]

3. Mpo na nini Yosua aponamaki mpo na kozala mokitani ya Moize? (Mit. 27:15-19) [w02 1/12 lok. 12 par. 1]

4. Ndenge nini maloba ya Mitángo 31:27 ekoki kolendisa bakristo lelo oyo? [w05 15/3 lok. 24]

5. Bingumba ya ekimelo ezalaki na matomba nini mpo na bana ya Yisraele? (Mit. 35:11, 12) [w95 15/11 lok. 14 par. 17]

6. Mpo na nini ezali na ntina mingi bakristo bázala na mayele, mpe yango ezali na matomba nini? (Mib. 1:13) [w03 15/1 30; w00 1/10 lok. 32 par. 1-3]

7. Mibeko ya Moize ezalaki komonisa boyengebene ya Nzambe na makambo nini? (Mib. 4:8) [w02 1/6 lok. 14 par. 8–lok. 15 par. 9-10]

8. Na boyokani na Kolimbola Mibeko 6:​16-18, limbolá lolenge malamu mpe ya mabe ya komeka Yehova. [w04 15/9 lok. 27 par. 1]

9. Ndenge nini maloba ya Yehova ekokisaki bamposa ya Bayisraele, mpe ndenge nini ekoki kokokisa bamposa na biso lelo oyo? (Mib. 8:3) w99 15/8 nk. 25-26]

10. Kolimbola Mibeko 12:16, 24 esalisaka biso tótalela ndenge nini mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalisa moto na makila na ye moko? [w00 15/10 lok. 30 par. 7]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto