Manaka mpo na pɔsɔ ya 8 Febwali
PƆSƆ EBANDI NA 8 FEBWALI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Basambisi 11-14
No. 1: Basambisi 13:1-14
No. 2: Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 16:9-13?
No. 3: ‘Konyokwama libela na libela’ oyo Emoniseli elobeli elimboli nini? (rs lok. 126 par. 3-4)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ndenge ya koyanola na mituna etali bafɛti. Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Comment raisonner, na mitó ya makambo mike oyo ebandi na nkasa 164 mpe 165. Bafɛti nini bato mingi basalaka na teritware na bino? Ntango nini okoki kopesa litatoli mpo na fɛti moko boye? Sɛngá moboti moko asala elakiseli oyo ekomonisa ndenge azali kosalisa mwana na ye ayeba kopesa eyano ntango batuni ye: Mpo na nini bosalaka fɛti ya Pasika te?
Min. 20: “Tókabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na mokili mobimba!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Liboso ya kotalela paragrafe 2, moyangani moko na moko akozwa lokasa moko ya libyangi soki ezali, mpe bendá likebi na makambo ndenge na ndenge oyo ezali kati na yango. Nsima ya kotalela paragrafe 2, sɛngá mosakoli moko asala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola lokasa yango. Tuná mokɛngɛli na mosala ya kosakola to nkulutu mosusu mituna mpo ayebisa bibongiseli oyo ezwami mpo na kampanye ya Ekaniseli.