Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/10 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 6/10 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni

“Bato mingi batalisaka horoscope na bango liboso ya kozwa bikateli. Okanisi ete minzoto ekoki kobongisa to kobebisa bomoi na yo? [Tiká ye apesa eyano.] Ya solo, Biblia elobeli maboke ya minzoto ya zodiake. [Tángá 2 Bakonzi 23:5.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia elobi na likambo yango.” Fungolá lisolo oyo ebandi na lokasa 18 mpe limbolá yango na mokuse.

Lamuká! Yuni

“Mbala mingi, mangomba esɛngaka mbongo mpo na milulu lokola batisimo, libala, mpe kokunda ebembe. Okanisi ete yango ezali malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Talá malako oyo Yesu apesaki bayekoli na ye. [Tángá Matai 10:7, 8b.] Lisolo oyo emonisi likanisi ya Biblia na likambo ya kosɛnga mbongo mpo na milulu ya losambo.” Fungolá lisolo oyo ebandi na lokasa 22 mpe limbolá yango na mokuse.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli

“Bato mingi babengaka Mozwi-na-Nguya-Nyonso kaka Nzambe. Kasi, oyebaka ete Biblia eyebisi biso nkombo ya Nzambe? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yisaya 42:8a.] Zulunalo oyo eyebisi mpo na nini balongolá nkombo ya Nzambe na Babiblia mosusu, mpe nini elimboli koyeba Nzambe na nkombo na ye.”

Lamuká! Yuli

“Kokwea ya nkita ememi mitungisi mingi. Bato oyo balongoli bango na mosala bazali komitungisa, mpe baoyo bazali naino kosala bazali kobanga ete bálongola bango. [Tángá Matai 6:34.] Okanisi ete toli oyo ekoki kosalisa biso tótika komitungisa? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo epesi batoli ya malamu mpo na ndenge ya kosalela mbongo malamu mpe kotika komitungisa.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto