Okobanda koyekola na bato Biblia na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ?
1. Tokokabola nini na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ?
1 Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ tokokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mpo na kolandela mposa oyo moto amonisi, tolendisami kolakisa trakte Okosepela koyeba solo? mpe kosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na moto yango. Ndenge nini tokoki kosala yango ntango tozongeli moto?
2. Ntango tozongeli moto oyo andimaki kozwa bazulunalo, ndenge nini tokoki kosalela trakte Koyeba solo mpo na kobanda koyekola na ye Biblia?
2 Ndenge ya kosalela trakte yango: Tokoki koloba boye: “Bazulunalo oyo natikelaki yo elendisaka bato ya ndenge nyonso mpe ya mangomba nyonso báyekola Biblia. [Pesá ye trakte Koyeba solo mpe lakisá ye mituna oyo ezali na lokasa ya liboso.] Awa ezali na mituna ya ntina mingi oyo Biblia epesaka biyano ya kotyela motema. Osilá komituna moko ya mituna yango?” Nsima ya koyoka eyano na ye, bótalela elongo eyano oyo trakte epesi na moko ya mituna na ye mpe bótanga moko ya bavɛrsɛ oyo batye wana. Na nsima yebisá ye ete makambo oyo oyebisi ye ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo Biblia ezali koteya mpe pesá ye buku Biblia eteyaka. Na nsima tokoki koyekola na ye baparagrafe ya liboso ya mokapo oyo akopona na lokasa makambo mazali na kati. To tokofungola na esika mosusu epai balimboli na molai likambo oyo bolobelaki na trakte. Talá epai tokoki kozwa biyano na mituna oyo:
● Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso? (nk. 9-11, par. 6-10)
● Bitumba mpe bampasi ekosila mokolo mosusu? (lok. 12, par. 12-13)
● Nini ekómelaka moto soki akufi? (nk. 59-60, par. 7-8)
● Elikya nini tozali na yango mpo na bakufi? (lok. 71, par. 13-15)
● Ndenge nini nakoki kobondela mpo Nzambe ayoka ngai? (nk. 166-167, par. 5-8)
● Ndenge nini nakoki kozala na bomoi ya esengo? (lok. 9, par. 4-5)
3. Ndenge nini tokoki kobongola lolenge na biso ya kosakola na kolanda moto oyo tokutani na ye?
3 Soki tolongi te kobanda koyekola na moto Biblia na buku Biblia eteyaka ntango tozongeli ye mpo na mbala ya liboso, tokoki kozwa bibongiseli mpo na kozongela moto yango mpe kokoba lisolo. Na kolanda mposa oyo moto amonisi, tokoki kutu kozongela ye mbala na mbala mpo na kolimbolela ye mituna mibale to misato ya trakte yango liboso ya kobanda koyekola na ye buku Biblia eteyaka. Tiká ete tósalela malamu trakte oyo na boumeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mpe kosalisa bato ya motema sembo ‘báyeba solo.’—Yoa. 8:31, 32.