Kobanda mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ tii 16 Novɛmbɛ, tokosala kampanye monene ya kokabola trakte!
1 Kobanda Mwayambo 20 Ɔkɔtɔbɛ, tokosala kampanye monene na boumeli ya pɔsɔ minei mpo na kokabola trakte ya sika: Okosepela koyeba solo? Tolingi ete kampanye yango oyo ekosalema na mokili mobimba esalisa bato básepela lisusu mingi na buku kaka moko oyo eteyaka solo.—Yoa. 17:17.
2 Trakte yango ezali na biyano ya mikuse oyo Biblia epesi na mituna motoba ya ntina mingi: “Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso?” “Bitumba mpe bampasi ekosila mokolo mosusu?” “Nini ekómelaka moto soki akufi?” “Elikya nini tozali na yango mpo na bakufi?” “Ndenge nini nakoki kobondela mpo Nzambe ayoka ngai?” mpe “Ndenge nini nakoki kozala na bomoi ya esengo?” Mangomba ya boklisto epesaka bato biyano ya malamu te na mituna wana. Ata bato mingi oyo bazali baklisto te bamitunaka bongo, kasi mbala mosusu bayebaka te ete Biblia epesi biyano ya polele na mituna yango. Na yango, tokanisi ete trakte wana ekosepelisa bato mingi.
3 Kokabolama na yango na teritware: Bósala makasi bókabola trakte yango na teritware na bino mobimba, na mosala ya ndako na ndako. Soki teritware na bino ezali monene, bankulutu bakoki komona malamu botika trakte na ndako oyo bokuti moto te, na mbala ya liboso oyo bokei na ndako yango. Kobosana te kopesa trakte yango na bandeko na yo ya libota, na baninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi, to na bato mosusu oyo osololaka na bango mbala na mbala. Mbala mosusu, okoki kobongisa programɛ na yo mpo ozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ mpe ya Novɛmbɛ. Ozali nde na mwana to moyekoli ya Biblia oyo azali kokola malamu na elimo mpe akoki kokokisa masɛngami mpo na kosakola elongo na lisangá na boumeli ya kampanye lokola mosakoli oyo azwi naino batisimo te? Soki bongo, yebisá bankulutu likambo yango.
4 Makambo ya koloba: Mpo tókabola trakte yango na bato mingi, ekozala malamu tóloba makambo mingi te. Tuná moto kaka motuna moko kati na mituna motoba oyo ezali na ezipeli mpe bendá likebi na ye na eyano oyo ezali na trakte. Yango ekopesa basakoli nzela ya koyokanisa lisolo na bamposa ya bato ya teritware. Soki moto asepeli, komá makambo oyo etali ye mpe zongelá ye. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tokoki kolakisa bato bazulunalo nzela moko na trakte yango. Nsima ya 16 Novɛmbɛ, mokolo ya nsuka ya kampanye, tokolakisa buku Biblia eteyaka. Tokosalela batrakte oyo ekotikala ndenge tosalelaka batrakte mosusu na mosala ya kosakola.
5 Bandá koyekola na bato Biblia: Mokano ya trakte oyo ezali ya kosalisa biso tóbanda koyekola na bato Biblia. Ntango ozongeli moto moko oyo asepelaki na yango, okoki kotuna ye liteya nini ya Biblia ebɔndisi ye to elendisi ye. Lakisá ye lokasa ya nsuka epai balobeli ndenge oyo toyekolaka na bato Biblia, mpe pesá ye buku Biblia eteyaka. Soki likoki ezali, bótalela na mokuse paragrafe moko to baparagrafe mibale na mokapo oyo elobeli malamumalamu lisolo oyo aponaki.
6 Yehova azali koluka bato oyo bakosambela ye “na elimo mpe na solo.” (Yoa. 4:23) Tiká ete biso nyonso tósangana na kampanye yango mpo na kosalisa basusu báyeba solo!