Manaka mpo na pɔsɔ ya 18 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 18 ƆKƆTƆBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Ntango 8-11
No. 1: 1 Ntango 11:1-14
No. 2: Na ndenge nini elimo mpe mwasi ya libala balobaka ete, “Yaká”? (Em. 22:17)
No. 3: Batatoli ya Yehova bakanisaka ete lingomba na bango ezali lingomba kaka moko ya solo? (rs lok. 398 par. 1-2)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ntina ya kotala bato oyo bazali koyoka yo na mosala ya kosakola. Lisolo ná bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, banda na lokasa 124, paragrafe 1 tii na lokasa 125, paragrafe 4.
Min. 20: “Mwa buku ya sika oyo tokokabola!” Mituna mpe biyano. Ntango bozali kotalela paragrafe 1, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na mwa buku yango. Nsima ya kotalela paragrafe 2 mpe 3, bósala elakiseli na maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa. Nsima ya kotalela paragrafe 4, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kobanda koyekola na moto Biblia ntango tozongeli ye.