Mwa buku ya sika oyo tokokabola!
1. Mwa buku nini tokokabola na Novɛmbɛ mpe mokano na yango ezali nini?
1 Na liyangani ya etúká “Bósɛnzɛlaka!” oyo esalemaki na mobu 2009, mwa buku ya sika ebimaki oyo ezali na motó ya likambo Biblia ezali na nsango nini? (na Lifalanse) Na sanza ya Novɛmbɛ, masangá na mokili mobimba ekokabola mwa buku yango mpo na mbala ya liboso. Ndenge nini mwa buku yango ekoki kosalisa bato ya teritware na biso? Bato ebele, mingi mpenza baoyo bazali na mangomba oyo endimelaka Yesu te, bayebi mpenza te makambo oyo ezali na Biblia. Yango wana, mwa buku yango elimboli na lokasa 3 ete ebongisami mpo na kosalisa bato báyeba “na mokuse makambo oyo Biblia elobeli.”
2. Ndenge nini tokoki kokabola mwa buku yango?
2 Ndenge ya kokabola yango: Tokoki koloba boye: “Tolingi koyeba likanisi na yo na likambo oyo balobi awa. [Tángá 2 Timote 3:16.] Bato mingi oyo tosololi na bango bandimi ete maloba yango ezali solo; bamosusu bakanisi ete Biblia ezali kaka buku moko ya kitoko. Yo okanisaka nini mpo na Biblia? [Tiká ye apesa eyano.] Ata soki bindimeli ya lingomba na biso ezali nini, ezali na ntina tóluka koyeba Biblia biso moko. [Tángá paragrafe ya ebandeli oyo ezali na lokasa 3, likoló.] Ntango ozali kotánga lisolo ya mokuse ya Biblia oyo ezali na mwa buku oyo, okomona likambo moko oyo ekosepelisa yo: Biblia ezali na motó ya likambo moko mpe na nsango moko.”
3. Wapi lolenge mosusu ya kolakisa mwa buku yango, mingimingi na teritware oyo bato mingi bazali na mangomba oyo endimelaka Yesu te?
3 Tokoki mpe koloba boye, mingimingi soki tozali kosakola na teritware oyo bato mingi bazali na mangomba oyo endimelaka Yesu te: “Tolingi koyeba likanisi na yo na likambo oyo Makomami (to buku mosantu oyo) elobi awa. [Tángá Nzembo 37:11.] Okanisi, mabele ekokóma ndenge nini ntango esakweli oyo ekokokisama? [Tiká ye apesa eyano.] Wana ezali kaka ndakisa moko ya elikya mpe libɔndisi oyo Biblia ezali kopesa na bato ya bikólo nyonso mpe mangomba nyonso.” Tángá paragrafe oyo ezali na lokasa 3, likoló, mpe pesá ye mwa buku yango.
4. Ndenge nini tokoki kosalela mwa buku yango mpo na kobanda koyekola na bato Biblia?
4 Bandá koyekola na bato Biblia: Ntango tozongeli moto, tokoki kolobela lisusu na mokuse likambo oyo tosololaki na ye mbala eleki, kolobela paragrafe moko to mibale ya lisolo oyo totalelaki, mpe kotuna ye mituna oyo ezali na nsuka ya eteni yango. To mpe soki tolingi kokɔtisa ye mbala moko na buku Biblia eteyaka, tokoki kotánga na ye makambo oyo ezali na lokasa ya nsuka ya mwa buku yango, kopesa ye buku Biblia eteyaka na mabɔkɔ, kotuna ye mikapo nini asepeli na yango, mpe kotalela elongo na ye paragrafe moko to mibale ya mokapo oyo aponi. Tiká ete biso nyonso tókabola mwa buku yango ebele mpenza na sanza ya Novɛmbɛ!