Manaka mpo na pɔsɔ ya 14 Febwali
PƆSƆ EBANDI NA 14 FEBWALI
Loyembo 72 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 8 par. 1-9 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Nehemia 9-11 (Min. 10)
No. 1: Nehemia 11:1-14 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Matai 1:23 emonisi nde ete Yesu azalaki Nzambe ntango azalaki awa na mabele?—rs lok. 432 par. 4-lok. 433 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Na makambo nini Nzambe amoniselaka biso boboto monene na ye?—1 Pe. 4:10 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 12: Ndenge ya kosolola na moto oyo oyebi te. Lisolo ná bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 62-64. Sololá na mokuse na mosakoli moko oyo ayebani ete azalaka na mokakatano te mpo na kobanda lisolo na moto oyo ayebi te, ntango azali kopesa litatoli ya libaku malamu to kosakola ndako na ndako.
Min. 18: “Eleko ya Ekaniseli ezali ntango ya kosakola lisusu mingi!” Mituna mpe biyano, ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Nsima ya koyekola lisolo mobimba, yebisá bibongiseli oyo lisangá na bino ezwi mpo na makita ya mosala ya kosakola na sanza ya Marsi, Aprili mpe Mai. Yebisá baprogramɛ oyo ekoki kosalisa bandeko oyo basalaka ata mosala nini bákokisa ngonga 50 na sanza na mosala ya kosakola. Tuná basakoli mibale to misato oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na eleko ya Ekaniseli na mbula eleki, atako bazali na makambo mingi ya kosala to na mikakatano ya nzoto.
Loyembo 8 mpe libondeli