Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/11 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 1/11 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yanuali

Tángá Ebandeli 2:16, 17. Na nsima lobá boye: “Bato mosusu balobaka ete Nzambe ayebaki liboso ete Adama akosala lisumu. Basusu bakanisaka ete soki Nzambe ayebaki liboso ndenge makambo ekosuka, likebisi oyo apesaki bango elingaki kozala motambo. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo ebandi na lokasa 13 elimboli ndenge Nzambe asalelaka likoki na ye ya koyeba makambo oyo ekoya.”

Lamuká! Yanuali

“Bato mosusu balobaka ete kondima oyo bandimi ya mangomba bazalaka na yango ezalaka kaka bindimandima. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Na kotalela Biblia, kondima esengeli te kozala bindimelá mpamba. [Tángá 1 Yoane 4:1.] Lisolo oyo ebandi na lokasa 28 elimboli ndenge oyo tokoki koyeba soki kondima na biso ezali ya solosolo mpenza.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali

“Lelo oyo, mabala mingi ezali kokufa. Mpo na yo, ntina monene ezali nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká toli oyo esalisaki babalani mingi. [Tángá 1 Bakorinti 10:24.] Zulunalo oyo elobeli makambo motoba oyo mibali mpe basi mingi bafundanaka na yango mpe emonisi ndenge oyo kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa babalani.”

Lamuká! Febwali

“Ezali komonana lokola ete bato mingi bakómi na mposa ya koyeba makambo ya bilima, ya maji, mpe ya bondɔki. Okanisi ete komikɔtisa na misala ya molili ezangi likama? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká likebisi oyo Nzambe apesaki Yisraele ya kala. [Tángá Kolimbola Mibeko 18:10-12.] Zulunalo oyo emonisi makambo oyo Biblia elobi mpo na misala ya molili.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto