Tósakwela “bato ya ndenge nyonso”
1. Na ndenge nini mosakoli ya malamu azali lokola mosali misala ya mabɔkɔ oyo ayebi malamu mosala na ye?
1 Mosali misala ya mabɔkɔ oyo ayebi mosala na ye malamu azalaka na bisaleli mingi, mpe ayebaka ntango mpe ndenge ya kosalela esaleli mokomoko. Ndenge moko mpe, tozali na bisaleli ndenge na ndenge oyo esalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kopalanganisa nsango malamu. Na ndakisa, mwa babuku ebele oyo elobelaka makambo ndenge na ndenge ebimá mpo na kosalisa biso tósakwela “bato ya ndenge nyonso.” (1 Ko. 9:22) Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo emonisi soki mwa babuku yango ebongisamaki mpo na banani, mpe epesi makanisi mpo na ndenge ya kokabola yango.
2. Ntango nini tokoki kolakisa mwa babuku na mosala ya kosakola?
2 Ntango nini tokoki kosalela mwa babuku: Mosali misala ya mabɔkɔ asalelaka esaleli moko ntango amoni ete ekosalisa ye. Ndenge moko mpe, tokoki kopesa moto mwa buku ntango nyonso oyo tomoni ete ekosalisa ye, na esika ya kolakisa yango kaka na basanza oyo tosengeli kokabola mwa babuku. Na ndakisa, soki tokutani na bato oyo bazali mokristo te mpe basepelaka mpenza te na makambo ya Biblia, mpe soki na sanza yango tosengeli kokabola buku Biblia eteyaka, ekozala malamu tólakisa naino mwa buku oyo ebongi na bato yango; nsima ya kokolisa mposa na bango mpo na mateya ya Biblia nde tokolakisa bango buku Biblia eteyaka.
3. Mpo na nini tosengeli koyeba kosalela malamu bisaleli oyo tozali na yango mpo na mosala ya kosakola?
3 Biblia ekumisi bato oyo bayebi mosala na bango malamu. (Mas. 22:29) Ya solo, mosala oyo eleki ntina lelo oyo ezali “mosala mosantu ya nsango malamu.” (Rom. 15:16) Mpo mokomoko na biso akóma “mosali oyo azali koyoka nsɔni te na mosala na ye,” tosengeli kosala makasi tóyeba kosalela malamu bisaleli oyo tozali na yango mpo na mosala ya kosakola.—2 Tim. 2:15.