“Pesá moto zulunalo ya kala to mwa buku nyonso mosusu oyo ekosepelisa ye”
Na basanza oyo tokokabola buku Biblia eteyaka mpe tokobanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na bango, tolendisami ete ‘tópesa bato yango zulunalo ya kala to mwa buku nyonso mosusu oyo ekosepelisa bango,’ soki bazali na buku yango kasi bandimi koyekola Biblia te. Mpo na nini?
Mwa babuku mpe bazulunalo ya kala elobelaka makambo ndenge na ndenge ya mikolo na biso. Mbala mosusu, likambo moko oyo ezali na kati ya mikanda yango ekoki kosimba motema ya moto. Yango wana, ntango ozali kobongisa sakosi na yo ya mosala ya kosakola, kɔtisá mpe mwa babuku ndenge na ndenge mpe bazulunalo ya kala. Soki ozali na bazulunalo ya kala te, mbala mosusu okoki kozwa yango na lisangá na bino. Na yango, soki moto asilá kozwa buku Biblia eteyaka kasi andimi koyekola Biblia te, okoki kolakisa ye bazulunalo to mwa babuku oyo ozali na yango mpe sɛngá ye azwa oyo esepelisi ye. Na nsima, bózwa bibongiseli mpo ozongela ye. Ntango mosusu okoki kobanda koyekola na ye Biblia.