Nimero ya sika na Lingelesi ya pɛtɛɛ
TOZALI na esengo ya koyebisa bino ete kobanda na nimero oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekobanda kobima mpe na Lingelesi ya pɛtɛɛ. Tokomeka nimero yango mbula moko. Ekozalaka na masolo ya boyekoli, mpe soki esika ezali, na mwa masolo mosusu. Tozali na elikya ete ekosalisa mpenza bandeko mingi na elimo. Na ndenge nini?
Bandeko na biso mingi balobaka Lingelesi na mikili lokola Bisanga Salomon, Fidji, Ghana, Kenya, Libéria, Nigéria, mpe Papouasie-Nouvelle-Guinée. Atako na mikili yango, bandeko na biso balobaka minɔkɔ mosusu to minɔkɔ ya mboka, basalelaka Lingelesi na masolo na bango ya mokolo na mokolo, na lisangá mpe na mosala ya kosakola. Kasi Lingelesi oyo basalelaka ezali pɛtɛɛ koleka oyo tosalelaka na mikanda na biso. Lisusu, bandeko na biso mosusu bakendá kofanda na bamboka epai basengeli kosalela Lingelesi mpo na kosolola na bato atako bayebi yango malamu te. Longola yango, bakoki kokɔta na makita na monɔkɔ ya mboka na bango te.
Masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo toyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ ezali nzela ya libosoliboso oyo tokoki kozwa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. Na yango, mpo na kosalisa moto nyonso oyo ayei na makita azwa litomba na mateya yango, nimero ya Lingelesi ya pɛtɛɛ ekosalela maloba mpe elobeli ya makasi te. Nimero yango ekozala na ezipeli ya ndenge mosusu. Mitó ya makambo mike, baparagrafe, mituna ya bozongeli mpe bililingi ekozala ndenge moko na oyo ya Linɔ́ngi oyo tosalelaka. Na yango, moto nyonso akoki kolanda Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nimero nyonso oyo ye alingi. Mpo na komona bokeseni, talá ndikisa oyo totye wana na nse; euti na paragrafe 2 ya lisolo ya boyekoli ya liboso.
Tozali na elikya ete nimero yango ya sika ekosalisa bato mingi oyo babondelaka Yehova boye: “Salisá ngai nakanga ntina, mpo nayekola mitindo na yo.” (Nz. 119:73) Tondimi ete bato oyo bayebi Lingelesi mingi te mpe bana mike mosusu oyo balobaka Lingelesi bakokoka kobongisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli malamu pɔsɔ na pɔsɔ. Tozali kopesa Yehova matondi mpo, lokola ‘alingi lisangá mobimba ya bandeko,’ azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa biso bilei mingi ya elimo.—1 Pe. 2:17; Mat. 24:45.
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova