Manaka mpo na pɔsɔ ya 7 Mai
PƆSƆ EBANDI NA 7 MAI
Loyembo 120 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 11 par. 5-12, etanda na lok. 89 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yirimia 35-38 (Min. 10)
No 1: Yirimia 36:14-26 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Maria atikalaki kaka ngɔndɔ?—rs lok. 353 par. 2–lok. 354 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Yehova Nzambe ayokaka mawa to esengo na makambo oyo bato basalaka?—Bas. 2:11-18 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 20: Osilá komeka kosalela yango? Lisolo na bayangani. Salá diskur oyo ekozongela makanisi oyo ezali na masolo oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi: “Kobanga te kopesa litatoli” (km 10/11), “Tósalela bwanya mpo milende na biso ebimisa matomba,” mpe “Tósakwela ‘bato ya ndenge nyonso.’” (km 1/12). Sɛngá bayangani báyebisa ndenge oyo basalelaki makanisi ya masolo yango mpe matomba oyo bazwaki.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Loyembo 14 mpe libondeli