Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/12 lok. 1
  • Makambo zomi na mibale oyo etindaka biso tósakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo zomi na mibale oyo etindaka biso tósakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Zwá mosala na yo ya kosakola na motuya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Mosala na biso ya kosakola emonisaka ete tolingaka Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • “Taláká malamu mosala oyo ondimaki ya ministre na kati ya Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mosala ya kosakola esalisaka biso tózala makasi na elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 6/12 lok. 1

Makambo zomi na mibale oyo etindaka biso tósakola

Mpo na nini tosakolaka mpe toteyaka nsango malamu? Ezali libosoliboso nde mpo na kosalisa bato ya mitema sembo báyeba nzela ya bomoi? (Mat. 7:14) Yango ezali na esika ya liboso na makambo oyo elandi, kasi yango te nde ntina ya liboso. Kati na makambo 12 oyo ezali awa, oyo etindaka biso tósakola, oyo wapi omonaka mpenza ete ezali na ntina koleka?

1. Esalisaka bato bázwa bomoi.​—Yoa. 17:3.

2. Ekebisaka bato mabe.​—Ezk. 3:18, 19.

3. Ekokisaka esakweli ya Biblia.​—Mat. 24:14.

4. Emonisaka bosembo ya Nzambe. Ntango Yehova akoboma bato mabe, moto moko te akoloba ete apesaki bango te libaku ya kobongola motema.​—Mis. 17:30, 31; 1 Tim. 2:3, 4.

5. Esalisaka biso tófuta nyongo na biso ya kosalisa bato bákóma na boyokani malamu na Nzambe, mpo basombaki na makila ya Yesu.​—Rom. 1:14, 15.

6. Esalisaka biso tózala na nyongo ya makila te.​—Mis. 20:26, 27.

7. Ezali lisɛngami ya Nzambe mpo na lobiko na biso moko.​—Ezk. 3:19; Rom. 10:9, 10.

8. Emonisaka ete tolingaka bazalani.​—Mat. 22:39.

9. Emonisaka ete totosaka Yehova mpe Mwana na ye.​—Mat. 28:19, 20.

10. Ezali likambo moko ya ntina na losambo na biso.​—Ebr. 13:15.

11. Emonisaka ete tolingaka Nzambe.​—1 Yoa. 5:3.

12. Esalaka ete nkombo ya Yehova esantisama.​—Yis. 43:10-12; Mat. 6:9.

Na ntembe te, ezali mpe na makambo mosusu oyo etindaka biso tósakola. Na ndakisa, kosakola elendisaka kondima na biso mpe epesaka biso libaku malamu mpenza ya kosala elongo na Nzambe. (1 Ko. 3:9) Nzokande, ntina oyo eleki monene oyo etindaka biso tósakola ezali ya 12. Bato báyoka biso to te, mosala ya kosakola esantisaka nkombo ya Nzambe, mpe epesaka Yehova nzela ya kozongisa monɔkɔ na moto oyo azali kotumola ye. (Mas. 27:11) Ya solo, tozali mpenza na ntina mingi ya ‘kokoba koteya mpe kosakola nsango malamu kozanga kotika.’​—Mis. 5:42.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto