Biyano na mituna na bino
◼ Makambo nini tosengeli kotalela soki tolingi ete nsima ya liwa na biso ebongiseli ya Yehova ezwa ndambo ya biloko na biso to ezwa yango nyonso?
Ntango moto akufi, azalaka lisusu na bokonzi likoló ya biloko na ye te. (Mos. 9:5, 6) Yango wana, bato mingi bakomaka testama, elingi koloba mokanda oyo emonisaka ndenge balingi ete biloko na bango esalelama nsima ya liwa na bango. (2 Bak. 20:1) Mbala mingi, na testama yango oyo endimami na Leta bakomaka nkombo ya moto oyo asengeli kobatela to kokabola biloko yango. Na bikólo mingi, soki moto akomaki testama te, bakonzi ya Leta nde bamonisaka ndenge biloko na ye esengeli kokabolama. Na yango, soki tolingi ete biloko na biso esalelama na ndenge moko boye, na ndakisa, soki tolingi ete ebongiseli ya Yehova ezwa biloko yango ndambo to nyonso, tosengeli kokoma testama oyo endimami na Leta mpo na komonisa yango, mpe kokoma nkombo ya moto oyo toponi ete akokisa mokumba yango.
Moto yango azali na mokumba moko monene mpenza. Soki biloko yango ezali ebele, kosangisa yango mpe kokabola yango ekoki kosɛnga makambo mingi mpe ekoki kozwa ntango mingi. Lisusu, mbala mingi ezalaka mpe na mibeko ya Leta oyo tosengeli kotosa. Ndeko nyonso ya lisangá te nde abongi mpenza na mokumba yango. Moto oyo toponi asengeli kozala moto oyo toyebi ete akokokisa mokumba yango malamu, abongi kotyelama motema, mpe akolanda mpenza makambo oyo tokomi.—Talá lisolo “Préparer sa succession: une mesure sage,” oyo ebimaki na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1998, na Lifalanse.
Soki basɛngi yo okokisa mokumba yango: Soki moto moko asɛngi yo okokisa mokumba yango nsima ya liwa na ye, osengeli liboso kotalela malamumalamu mpe kobondela mpo na koyeba soki okokoka kosala yango to te. (Luka 14:28-32) Na nsima ya liwa ya moto yango, osengeli koyebisa moto nyonso oyo nkombo na ye ekomamaki mpo na kozwa eloko. Na nsima, soki ozwi bokonzi ya kosala yango, ekosɛnga okabola biloko yango na kolanda mibeko mpe kaka ndenge ekomami na testama. Moto oyo azwi mokumba ya ndenge wana, asengeli koyeba ete ata soki biloko ezali ebele to moke, asengeli kosala kaka ndenge ekomami na testama. Eloko nyonso oyo bapesi na ebongiseli moko ya Batatoli ya Yehova oyo endimami na mibeko ya Leta ekómi ya ebongiseli ya Yehova.—Luka 16:10; 21:1-4.