Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 15/12 nk. 4-5
  • Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • “Mosala ezali monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Moto oyo akabaka akopambwama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 15/12 nk. 4-5
Moto moko azali kotya makabo

Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa

MOZALISI na biso apesá bato likabo moko ya motuya mingi: bonsomi ya kopona. Kasi, apambolaka mpenza baoyo basalelaka bonsomi na bango na ndenge ebongi mpo ete losambo ya solo ekende liboso, mpe apambolaka baoyo basalaka nyonso, mpo na kosantisa nkombo na ye mosantu mpe bapesaka mabɔkɔ na mokano na ye monene. Yehova alingaka te ete tótosa mpo bazali kokanela biso mpe bazali kotinda biso na makasi. Kasi, asepelaka mingi nde na ezaleli ya komipimela oyo eutaka na bolingo mpe na botɔndi makasi.

Na ndakisa, ntango Bayisraele bazalaki na esobe ya Sinai, Yehova ayebisaki bango bátonga esika ya losambo. Alobaki boye: “Bózwela Yehova likabo na kati na bino. Moto nyonso oyo motema na ye elingi amema yango likabo ya Yehova.” (Kobima 35:5) Moyisraele mokomoko asengelaki kopesa eloko nyonso oyo azalaki na makoki ya kopesa, mpe likabo mokomoko, ezala ya ndenge nini to ya motuya nini, ekokaki kosalelama na lolenge oyo ebongi mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Matomba nini emonanaki?

“Moto nyonso oyo motema na ye etindaki ye,” “moto nyonso oyo elimo na ye etindaki ye,” mpe “moto nyonso oyo motema na ye elingaki,” apesaki likabo ya bolingo malamu. Mibali mpe basi bazalaki komema na motema moko eloko mpo na mosala ya Yehova, na ndakisa: babrɔshe ya monzɛlɛ, biloko ya matoi, mpɛtɛ, wolo, palata, motako, nsinga ya bulé, lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, biloko oyo epakolami langi ya motane makasi, lini ya kitoko, nsuki ya ntaba, mposo ya mpate-mobali oyo epakolami langi ya motane, mposo ya nyama ebengami fɔkɛ, nzete ya akasia, mabanga ya ntalo, mafuta ya balsame mpe mafuta. Na nsuka, “biloko ekokaki mpo na mosala nyonso oyo esengelaki kosalema, mpe elekaki kutu koleka.”​—Kob. 35:21-24, 27-29; 36:7.

Eloko esepelisaki Yehova mingi ezalaki te makabo oyo epesamaki, kasi nde ezaleli ya komipimela ya baoyo bapesaki mabɔkɔ mpo na losambo ya pɛto. Bapesaki mpe ntango mpe makasi na bango. Biblia emonisi ete “basi nyonso oyo bazalaki na motema ya bwanya bazalaki kosala nsinga na mabɔkɔ na bango.” Ya solo, “basi nyonso ya bwanya oyo mitema na bango ezalaki kotinda bango, bazalaki kosala nsinga na nsuki ya ntaba.” Kasi, Yehova apesaki Bezalele “bwanya, na mayele, na boyebi mpe ayeba lolenge nyonso ya misala ya mabɔkɔ.” Kutu, Nzambe apesaki Bezalele ná Oholiabe makoki mpenza oyo basengelaki na yango mpo na kosala mosala nyonso oyo apesaki bango.​—Kob. 35:25, 26, 30-35.

Ntango Yehova asɛngaki Bayisraele ete bápesa makabo, atyaki motema mobimba ete “moto nyonso oyo motema na ye elingaki” akopesa mabɔkɔ mpo na losambo ya solo. Na nsima, apambolaki mpenza baoyo bamipimelaki mpo na kopesa makabo na ndenge atambwisaki bango mpe asalaki ete báyoka esengo mingi. Yehova amonisaki ete ntango apamboli basaleli na ye mpo na ezaleli na bango ya komipimela, akoki komindimisa ete biloko to makoki ya kokokisa mokano na ye ezanga te. (Nz. 34:9) Lokola ozali kosalela Yehova na elimo ya komipimela, akopambola yo mpenza mpo na yango.

NDENGE BATO MOSUSU BAPONAKA KOPESA MAKABO MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA MOKILI MOBIMBA

Ndenge kaka ezalaki na ntango ya ntoma Paulo, lelo oyo mpe bandeko mingi ‘babombaka mwa eloko pembeni’ to babongisaka mwa mbongo oyo batyaka na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Mosala ya kosakola na mokili mobimba.” (1 Ko. 16:2) Sanza na sanza, masangá etindaka makabo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango. Moto akoki kotinda likabo na ye ya mbongo mbala moko na “Association Sans But Lucratif ‘Les Témoins de Jéhovah,’” 75, 13e Rue, Industriel, Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na biro ya filiale oyo etalelaka mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango nzela moko na mokanda oyo emonisi ete biloko yango ezali nde likabo.

KODEFISA MBONGO

  • Moto akoki kosɛnga banki moko etindela “Association “Les Témoins de Jéhovah’” mbongo to akoki kosalela carte bancaire na ye mpo na kopesa Association mbongo. Na bafiliale mosusu, moto akoki kotinda mokanda na nzela ya site na biso jw.org to site mosusu oyo Association eponi.

  • Moto akoki kodefisa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komelá “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa likoló to bengá na +243 (0)99 818 9791 to na +243 (0)81 555 1000.

LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO

Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ekende liboso. Na ndakisa:

Asiranse: Moto akoki kokoma nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.

Kofungola kɔnti na banki: Moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya pasyo na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to kotya nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka oyo azali.

Lotomo ya kozwa mosolo: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpenza to kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na yo.

Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango na ye likabo, to soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bino.

Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Na nsima, moto yango akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Mpo na yango, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

Testama: Moto akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.

Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga, kokende to kokomela biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi.

Biro ya filiale

“Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” B.P. 634, 75, 13e Rue Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo. Telefone: +243 (0)998 189 791 to +243 (0)81 555 1000.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto