Manaka mpo na pɔsɔ ya 24 Sɛtɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 24 SƐTƐMBƐ
Loyembo 45 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 17 par. 15-19 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Danyele 1-3 (Min. 10)
No. 1: Danyele 2:17-30 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Bikelamu ya Nzambe oyo bazali na likoló, bazali bituluku oyo ebongisami?—rs lok. 161 par. 2–lok. 162 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Ndenge nini tokoki koboya koyokisa elimo santu mawa?—Ef. 4:30 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 30: “Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai?—Eteni 2” Mituna mpe biyano. Na miniti moko ya maloba ya ebandeli, zongelá makambo oyo botalelaki na pɔsɔ eleki na Eteni 1. Sukisá na kopesa bilenge longonya na milende oyo bazali kosala mpo na ‘kokanisa’ Yehova na bolenge na bango. (Mos. 12:1) Lendisá bango bákoba kosalela bomoi na bango na mosala ya Yehova. Soki ata ndeko moko te azali na video yango, bóbongisa lisolo na bayangani na buku Mituna oyo bilenge batunaka volimi 1 to 2. Ekosalema na bankulutu mibale, mokomoko akosala miniti 15. Bópona mikapo mibale na babuku yango na kotalela mposa ya lisangá na bino. Sɛngá bilenge balobela mateya oyo bazwi.
Loyembo 91 mpe libondeli