Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai? (Eteni 2)
Ntango otye DVD Les jeunes s’interrogent—Que vais-je faire de ma vie ? (Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai?), kɔtá mbala moko na Interviews, mpe na nsima poná Sections. Nsima ya kotala eteni mokomoko, salelá mituna ya paragrafe 2 mpo na bozongeli. Na nsima, zongá na menu principal mpe poná Suppléments, mpe nsima ya kotala eteni mokomoko na kati ya biteni yango mitano, salelá mituna ya paragrafe 3 mpo na bozongeli.
Sections: Se consacrer à des choses vaines ou servir Dieu? (1) Mikano nini batyaka bilenge mbamba bálanda? (2) Ndenge nini 1 Yoane 2:17 ekoki kosalisa bilenge báyeba mbula boni bakolekisa na kotánga kelasi? (3) Mpo na nini tosengeli kotika te ete kobanga epekisa biso kozwa batisimo? (4) Wapi mwa makambo oyo ekosalisa biso tókokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo? Apprendre à aimer la prédication: (5) Mpo na nini bilenge mosusu basepelaka te na mosala ya kosakola? (6) Wapi mwa makambo oyo ekoki kosalisa biso? (7) Nini ebangisaka bilenge mosusu mingi koleka kosolola na moto oyo bayebi te, mpe mpo na nini? (8) Ndenge nini tokoki kolonga kobanga mpe kokóma na mpiko ya kosakola? (9) Mpo na nini ezali na ntina tókolisa makoki na biso ya koteya na mosala ya kosakola? Une porte ouverte sur l’activité: (10) Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela epesaka mabaku mingi mosusu ya kokende liboso na elimo? (Flp. 3:16) (11) Mpo na nini bilenge mosusu bakakatanaka kobanda mosala ya mobongisi-nzela? (12) Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tótika komitungisa mingi na makambo ya mbongo? (13) Bilenge mosusu basalaki nini mpo na kokokisa bamposa na bango wana bazali babongisi-nzela? (14) Tokoki kosala nini soki makambo ya bomoi na biso epesi biso nzela te ya kokɔta na mosala ya ntango nyonso?
Suppléments: La valeur de l’étude individuelle: (15) Mpo na nini kobatela momeseno ya koyekola yo moko ezali na ntina? D’autres façons de prêcher: (16) Ndenge nini mitindo mosusu ya kosakola ebakiselaka biso esengo? Le service au Béthel: (17) Lobelá mwa makambo oyo epesaka esengo na mosala ya Betele? L’École de formation ministérielle: (18) Matomba nini baoyo bakɔtaki na eteyelo yango (ekómá kobengama Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba) bazwaki? Guiléad: la formation au service missionnaire: (19) Ndenge nini Peter ná Fiona bamibongisaki mpo na mosala ya misionɛrɛ, mpe matomba nini bazwaki na eteyelo ya Gileade?